Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bakolose 3:13 - Mokanda na Bomoi

13 Boyikanaka mpiko ; mpe soki moko azali na likambo ya kopamela moninga na tina na yango, bolimbisanaka. Bolimbisaka ndenge Nkolo alimbisaki bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bakolose 3:13
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bwanya ya moto ekomisaka ye motema molayi ; mpe azwaka lokumu tango atalaka pamba mabe oyo basalaka ye.


Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.


limbisa mabe na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo basalaki biso mabe ;


Mpe tango botelemaka mpo na kosambela, soki bozali na likambo oyo bozwaki na yango moto songolo, bolimbisa ye mpo ete Tata na bino, oyo azali na Likolo alimbisa mpe masumu na bino. [


limbisa masumu na biso, pamba te biso mpe tolimbisaka moto nyonso oyo asalaka biso mabe ; mpe komema biso na komekama te.


Yesu alobaki : — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala . Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.


Yango wana, boyambanaka, bamoko na bamosusu, ndenge Klisto ayambaki bino mpo na nkembo na Nzambe.


Moto nyonso oyo bino bolimbisi, ngai mpe nalimbisi ye ; mpe likambo oyo ngai nalimbisi, soki ezalaki penza na likambo ya kolimbisa, nalimbisi yango mpo na bolamu na bino na miso ya Klisto,


kati na bopeto, boyebi, kokanga motema mpe boboto ; kati na Molimo Mosantu mpe bolingo ya solo ;


Bomemisana mikumba bino na bino ; ezali na nzela wana nde bokokokisa mobeko ya Klisto.


bozalaka tango nyonso bato oyo batondi na komikitisa, na boboto mpe na motema molayi ; boyikanaka mpiko kati na bolingo,


Botalisanaka boboto, boyokelanaka mawa mpe bolimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino kati na Klisto.


Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.


Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.


Nzambe akosambisa na mawa te moto oyo ayokelaka bato mosusu mawa te. Mawa elongaka kosambisama.


Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino ; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ