Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bakolose 3:11 - Mokanda na Bomoi

11 Boye, biso nyonso tozali ndenge moko : bokeseni ezali lisusu te kati na Mogreki mpe Moyuda, moto oyo akatama ngenga mpe moto oyo akatama ngenga te, mopaya mpe mwana mboka, mowumbu mpe monsomi. Bobele Klisto nde azali na tina : azali nyonso kati na bato nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bakolose 3:11
54 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te bolingo na Ye mpo na biso ezali monene, mpe bosembo ya Yawe ewumelaka seko na seko. Bokumisa Yawe !


Ye, Yawe, alobi : « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »


Yawe asemboli na pole loboko na Ye ya bule na miso ya bikolo nyonso ; mpe suka nyonso ya mokili ekomona Lobiko ya Nzambe na biso.


Oh Yawe, Makasi na ngai mpe Ndako na ngai batonga makasi, Ekimelo na ngai na tango ya pasi, bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba : « Batata na biso bazalaki kaka na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te.


Bokobeta zeke mpo na kokabola yango lokola libula mpo na bino mpe bapaya oyo bavandaka kati na bino mpe babota bana kati na bino. Bokokamata bango lokola bana mboka ya Isalaele. Bango mpe bakobeta zeke mpo na kozwa libula elongo na bino kati na mabota ya Isalaele.


Na mokolo wana, nakoyanola, elobi Yawe, nakoyanola Lola, mpe Lola ekoyanola mabele.


mpo ete bakoka kozwa ndambo ya mokili ya Edomi oyo etikalaki, mpe ya bikolo nyonso oyo babengamaka na Kombo na Ngai, » elobi Yawe oyo asalaka makambo wana nyonso.


Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi ! Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.


Siona, tokende ! Bima noki, yo oyo ovandaka na Babiloni, mboka kitoko !


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye ; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye.


Nazali nzete ya vino ; bino, bozali bitape. Moto oyo akowumela kati na Ngai, mpe Ngai kati na ye, akobotaka bambuma ebele, pamba te bokoki kosala eloko moko te, soki na lisungi na Ngai te.


Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.


mpo ete bato oyo bakotikala baluka Nkolo, ezala bato nyonso ya bikolo ya bapaya oyo babengamaka na Kombo na Ngai, elobi Nkolo oyo asalaka makambo oyo,


Bavandi ya esanga yango batalisaki biso bolingo monene mpe basungaki biso mingi. Lokola mvula ezalaki konoka mpe malili ezalaki makasi, bapelisaki moto mpe babengaki biso nyonso ete tokende koyetola.


Tango bavandi ya esanga bamonaki nyoka ezali kodiembela na loboko ya Polo, balobanaki bango na bango : — Solo, moto oyo azali penza mobomi ! Awuti kobika na likama ya ebale, kasi bosembo ya Nzambe elandi ye kaka mpo na koboma ye !


Nazali na niongo ya Bagreki mpe ya bato oyo bazali Bagreki te, ya bato ya bwanya mpe ya bazoba.


Boye, bokeseni ezali te kati na Moyuda mpe Mogreki, pamba te bango nyonso bazali na Nkolo moko oyo apambolaka makasi bato nyonso oyo babelelaka Ye.


Bato nyonso oyo bandimaka, Nzambe akomisaka bango bato ya sembo na nzela ya kondima Yesu-Klisto. Bokeseni ezali te kati na Bayuda mpe Bapagano,


Boni, Nzambe azali kaka Nzambe ya Bayuda ? Azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya te ? Solo, azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya.


Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko : ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko.


Nzokande, soki nayebi te ndimbola ya maloba ya lokota oyo moto azali koloba na ngai, nakozala lokola mopaya epai na ye, mpe ye akozala mopaya epai na ngai.


Kokatama ngenga to kokatama ngenga te ezali na tina te ; likambo ya tina ezali nde kobatela mibeko ya Nzambe.


boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.


Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.


oyo ezali nzoto na Ye. Nzambe oyo atondisaka nyonso kati na bato nyonso amimonisaka kati na Yesu, na mobimba ya bonzambe na Ye.


Solo, azali Ye moko kimia na biso : atiaki bomoko kati na Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, akweyisaki mir ya bonguna oyo ezalaki kokabola bango,


alongolaki Mobeko elongo na mitindo mpe malako na yango mpo na kokela, kati na Ye moko, moto ya sika na nzela ya Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, na kotia kimia,


mpo ete Klisto avanda kati na mitema na bino na nzela ya kondima. Nabondelaka mpe mpo ete bozwa misisa mpe bolenda kati na bolingo,


Mabombami yango ezali boye : Kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu, Bapagano bazali bakitani ya libula elongo na Isalaele, biteni ya nzoto moko, mpe basangani elongo kati na elaka moko.


pamba te boyebi malamu ete Nkolo akofuta moto nyonso mpo na bolamu nyonso oyo asalaka, azala mowumbu to monsomi.


Ezali mpe kati na Ye nde bino botondisamaki, pamba te azali Mokonzi ya milimo nyonso mpe ya nguya nyonso.


Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.


Moto nyonso oyo azali kowumela te kati na mateya ya Klisto, kasi abimi libanda na yango, azali moko te na Nzambe ; nzokande moto oyo azali kowumela kati na mateya yango azali moko na Tata mpe na Mwana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ