Akopesa lokumu te, ezala epai ya banzambe ya batata na ye to epai ya nzambe oyo basi balingaka to mpe epai ya banzambe nyonso mosusu ; pamba te akomitombola liboso na bango nyonso.
Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.
« bilei esalema mpo na libumu, mpe libumu esalema mpo na bilei, » nzokande ezali na mokolo oyo Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzoto esalema te mpo na pite, nzoto ezali nde mpo na Nkolo, mpe Nkolo azali mpo na nzoto.