Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bakolose 2:20 - Mokanda na Bomoi

20 Bokufaki elongo na Klisto mpe bokangolamaki longwa na bowumbu ya milimo mabe ya mokili oyo. Boye mpo na nini, lokola nde bozali nanu bato ya mokili oyo, bozali lisusu kondima mibeko na yango lokola :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bakolose 2:20
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki kaka bozalaki ya mokili, mokili ekokaki kolinga bino lokola bato na yango penza. Nzokande, bozali ya mokili te, pamba te nasilaki kopona mpe kolongola bino na se ya bokonzi na yango mpo na kobulisa bino ; yango wana mokili ezali koyina bino.


Pamba te atako ezali penza ya solo ete tozali bato, mpe tozali kobika bomoi na biso kati na nzoto, kasi tobundaka te kolanda nzoto.


Ezali mpe ndenge moko mpo na biso : wana tozalaki nanu bana mike, tozalaki bawumbu ya makambo oyo etambolisaka mokili.


Mpo na ngai, nakomikumisa na eloko mosusu te, longola kaka na ekulusu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, pamba te ezali na nzela ya ekulusu yango nde mokili ebakamaki mpo na ngai, mpe ngai nabakamaki mpo na mokili.


alongolaki Mobeko elongo na mitindo mpe malako na yango mpo na kokela, kati na Ye moko, moto ya sika na nzela ya Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, na kotia kimia,


apasolaki mokanda oyo mibeko na yango ekatelaki biso etumbu, asilisaki bokonzi ya mibeko yango, wana abakaki yango na ekulusu.


Yango wana, bopesaka na moto moko te nzela ya kosambisa bino na tina na biloko ya kolia to ya komela to mpe na tina na mokolo ya feti lokola feti ya ebandeli ya sanza to ya Saba.


« kozwa te, komeka elengi te, kosimba te ? »


Bosalaka keba ete moko te akanga bino na motambo ya mayele ya lokuta mpe ezanga tina, kolanda bokoko ya bato mpe etamboli ya mokili oyo, pamba te ewutaka na Klisto te.


Pamba te bokufaki penza, mpe bomoi na bino ezali sik’oyo ya kobombama elongo na Klisto kati na Nzambe.


Bolandaka te lolenge nyonso ya mateya ya sika, pamba te ebongi ete mitema na biso elendisama na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela te ya mibeko oyo esungaki ata moke te bato oyo bazalaki kotosa yango.


Bato na ekobo ! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe ? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe.


Toyebi ete tozali bana na Nzambe, mpe ete mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya Satana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ