Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bakolose 2:2 - Mokanda na Bomoi

2 Nazali kosala bongo mpo ete balendisama, bazala moko kati na bolingo, batonda na elikya oyo ewutaka na bososoli ya mabombami ya Nzambe, mpe batonda na boyebi ya mabombami yango ; mabombami yango ezali Klisto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bakolose 2:2
58 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Isalaele mobimba bayokaki ndenge mokonzi akataki likambo oyo, babangaki mokonzi mpo ete bamonaki ete azali solo na bwanya ya Nzambe mpo na kokata makambo na bosembo.


Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !


Mbuma ya bosembo ekozala kimia : bosembo ekobota bopemi mpe bobatelami mpo na libela.


Bobondisa, bobondisa bato na Ngai, elobi Nzambe na bino.


Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.


« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bakatama ngenga kaka na nzoto, kasi na mitema te :


Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !


Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.


Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te.


Bato mingi bamekaki kokoma makambo oyo elekaki kati na biso,


Kasi soki nasalaka yango, ezala soki boboyi na bino kondima Ngai, bondima ata misala yango, mpo boyeba mpe bososola ete Tata azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na Tata.


Nyonso oyo ezali ya Tata ezali mpe ya Ngai ; yango wana nalobi ete akozwa makambo kowuta epai na Ngai mpe akoyebisa bino yango.


Nzokande, bomoi ya seko ezali : koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki.


Kasi Yesu alobaki na bango : « Tata na Ngai azali kosala kino sik’oyo, Ngai mpe nazali kosala. »


mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo akumisaka Mwana te akumisaka mpe Tata te oyo atindaki Mwana.


Biso, tondimi mpe toyebi ete ozali Mosantu ya Nzambe.


Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso.


Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.


Na Ye oyo azali na nguya ya kotelemisa bino ngwi na nzela ya Sango Malamu oyo nateyaka, mpe na nzela ya mateya ya Yesu-Klisto kolanda emoniseli ya mabombami ya Nzambe, oyo ebombama wuta kala,


To mpe boni, okanisi ete ozali kotiola bomengo ya boboto, ya kokanga motema mpe ya bolamu na Nzambe, wana ozali kobosana ete boboto na Ye ememaka yo na kobongola motema ?


Pamba te bino nyonso bokoki na bino kosakola, kasi bosengeli kosala yango moko sima na mosusu, mpo ete bato nyonso bayekola mpe balendisama.


Nzokande biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi tozwaki Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola biloko oyo Nzambe apesi biso na nzela ya ngolu.


Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi ; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto.


Kati na Klisto, tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, mpe bolimbisi ya masumu, kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe


mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye,


mpe ayebisaki ngai mabombami na nzela ya emoniseli, ndenge nasili kokomela bino na mwa maloba.


Ezali na tina yango nde nazali kotinda ye epai na bino, mpo ete apesa bino basango na tina na ngai mpe alendisa bino.


Boye, soki kolendisama ezali kati na Klisto, soki kobondisama ezali kati na bolingo, soki boyokani ezali kati na Molimo, soki bolamu mpe mawa ezali kati na bino,


Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene : koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto


Sango Malamu ezali mabombami oyo Nzambe abomba wuta na ebandeli, kasi alakisi yango sik’oyo epai ya basantu na Ye.


Nzambe asepeli kolakisa bango bomengo ya nkembo, oyo evandi kati na mabombami ya mabongisi na Ye mpo na Bapagano. Mabombami yango ezali : Klisto kati na bino, elikya ya nkembo.


Yango wana, wuta mokolo oyo toyokaki sango na tina na bino, totikaka te kobondela mpo na bino mpe kosenga na Nzambe ete atondisa bino na boyebi ya mokano na Ye, na bwanya nyonso mpe na bososoli oyo Molimo apesaka,


baboyaka kokangama na Klisto oyo azali Mokonzi, Moto. Ezali Klisto nde asalaka ete nzoto mobimba ekola malamu kolanda mokano ya Nzambe mpe ekangana na nzela ya misisa mpe misuni.


Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka.


Bobondelaka mpe mpo na biso, na tina ete Nzambe apesa biso mabaku ya koteya Sango Malamu mpo na kosakola mabombami ya Klisto. Mpe ezali mpo na mabombami yango nde ngai nazali mokangami kati na boloko.


Ezali na tina yango nde nazali kotinda ye epai na bino, mpo ete apesa bino basango na tina na biso mpe alendisa bino.


pamba te Sango Malamu na biso ekomaki epai na bino kaka na maloba te, kasi mpe na nguya, na Molimo Mosantu mpe na kondima monene. Mpe boyebi malamu ndenge nini tozalaki kovanda kati na bino mpo na bolamu na bino.


Yango wana totindaki Timote, ndeko na biso mpe moninga ya Nzambe kati na mosala ya kopanza Sango Malamu ya Klisto, mpo ete alendisa bino mpe apesa bino mpiko kati na kondima,


Bandeko, tozali kolendisa bino : bopesaka bagoyigoyi mpe bato ya mobulu makebisi, bolendisaka ba-oyo basili kobungisa mpiko na bango, bosungaka ba-oyo bazangi makasi, boyikanaka mpiko.


Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.


Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.


Kasi tolingi ete moto nyonso kati na bino akoba kolakisa bolingo yango kino na suka mpo ete makambo oyo bozali kotiela elikya ekokisama solo.


Yango wana, bandeko na ngai, bosala lisusu makasi koleka mpo na kolakisa na bato ete Nzambe abenga penza bino mpe apona bino ; pamba te soki bosali bongo, bokotikala kokweya te.


Nzambe apesaki biso, na nzela ya nguya na Ye ya bonzambe, nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kobika bomoi ya botosi kati na makambo ya Nzambe mpe mpo na kokangama na Ye ; asalaki yango na kopesa biso boyebi ya Ye oyo abenga biso mpo ete tosangana na nkembo mpe na bolamu na Ye.


kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !


Ezali na ndenge wana nde tokoyeba ete tozali kati na solo, mpe mitema na biso ekotonda na elikya liboso ya Nzambe ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ