15 Asilisaki makasi ya milimo mabe mpe ya nguya ya bakonzi ya molili, asambwisaki yango na miso ya bato nyonso mpe atambolisaki yango lokola bakangami ya etumba tango alongaki yango na ekulusu.
Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »
Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene, mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi, pamba te akabaki bomoi na ye na kufa mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato, pamba te amemaki masumu ya bato ebele mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.
Ndenge nini moto akoki kokota na ndako ya elombe mpe koyiba biloko na ye ya ndako soki akangi nanu elombe yango te na basinga ? Nzokande, soki akangi ye na basinga, wana akoki solo koyiba biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ye.
kasi soki moto mosusu oyo aleki ye na makasi ayei kobundisa ye mpe alongi ye, akobotola ye bibundeli oyo azalaki kotiela motema, akokamata biloko na ye nyonso mpe akokaba yango.
Sima na yango nde suka ekoya, tango Klisto akozongisa bokonzi na maboko ya Ye oyo azali Nzambe mpe Tata, sima na Ye kobebisa lokumu nyonso, bokonzi nyonso mpe nguya nyonso.
Sik’oyo, tika ete matondi ezonga epai na Nzambe oyo, mpo na bomoko na biso na Klisto, atambolisaka biso tango nyonso kati na molongo na Ye ya balongi, mpe azwaka biso lokola bisalelo na Ye mpo na kopanza boyebi ya Klisto, na bisika nyonso, lokola solo kitoko ya malasi.
ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe.
na tina ete bakonzi ya milimo mpe banguya kati na mboka ya milimo eyeba sik’oyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo emonisamaka na lolenge ebele,
Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo.
pamba te ezali na nzela na Yesu nde nyonso ekelama kati na Likolo mpe na mabele, bikelamu oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te, milimo mpe bokonzi ya milimo, bakonzi ya milimo mpe banguya. Ezali na nzela na Yesu mpe mpo na Yesu nde nyonso ekelama.
Boye, lokola bana yango bazali na nzoto mpe makila, Ye mpe asanganaki elongo na bomoto na bango mpo ete, na nzela ya kufa na Ye, asilisa nguya ya Satana oyo azalaki kosimba nguya ya kufa,
Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.
Bongo Satana oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na liziba ya moto mpe ya sofolo, epai wapi nyama mpe mosakoli ya lokuta babwakamaki. Bakonyokolama kuna seko na seko, butu mpe moyi.