8 Ezali mpe kaka ye moto ayebisaki biso ndenge nini Molimo atindikaka bino na bolingo.
Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga kobima na pole.
Kasi nabondeli bino bandeko, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe ya bolingo ya Molimo : Bobundaka elongo na ngai kati na mabondeli oyo bosalaka epai ya Nzambe na tina na ngai
Nzokande, elikya ekosaka te, pamba te Nzambe asopaki bolingo na Ye kati na mitema na biso na nzela ya Molimo Mosantu oyo Ye Nzambe apesaki biso.
Kasi mbuma ya Molimo ezali : bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima,
pamba te toyokaki sango ya kondima na bino kati na Yesu-Klisto, mpe sango ya bolingo na bino mpo na basantu nyonso.
Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.
Lokola bosili komipetola na nzela ya kotosa bosolo mpo na kolingana na bolingo ya solo, bolinganaka makasi bino na bino, na motema ya peto.