Bakolose 1:28 - Mokanda na Bomoi28 Ezali Ye Klisto nde biso tosakolaka, na kokebisa mpe na koteya moto nyonso, na bwanya nyonso, mpo na kokomisa moto nyonso ya kokoka kati na Klisto. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ndambo ya bato ya mayele oyo balandaka malakisi ya Epikire mpe ya Zenon bakomaki kotiana tembe na ye. Bamoko batunaki : — Moto oyo ya makelele alingi koloba nini ? Bamosusu balobaki : — Tomoni lokola nde azali kolobela banzambe ya bapaya ! Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya Sango Malamu na tina na Yesu mpe lisekwa kati na bakufi.
Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.