Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bakolose 1:25 - Mokanda na Bomoi

25 Nakoma mosali na yango kolanda mokumba oyo Nzambe apesa ngai : mokumba ya koteya bino Liloba na Nzambe na mobimba na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bakolose 1:25
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, Apolosi azali nani ? Polo mpe azali nani ? Bazali kaka basali oyo, na nzela na bango, bondimelaki Nzambe, kolanda mosala oyo Nkolo apesaki na moko na moko kati na bango.


Soki mokano ya koteya ewutaki epai na ngai moko, nalingaki solo kozwa lifuti ; kasi lokola mokano yango ewutaki epai na ngai te, nazali kaka kokokisa mosala oyo epesamelaki ngai.


Solo, boyokaki ete Nzambe apesaki ngai mosala ya ngolu na Ye mpo na bino


Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai lokola likabo na nzela ya nguya na Ye, nakoma mosali ya Sango Malamu.


Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.


Yango wana totindaki Timote, ndeko na biso mpe moninga ya Nzambe kati na mosala ya kopanza Sango Malamu ya Klisto, mpo ete alendisa bino mpe apesa bino mpiko kati na kondima,


Soki oteyi makambo oyo epai ya bandeko, okozala mosali malamu ya Yesu-Klisto, mosali oyo alendisami na maloba ya kondima mpe na malakisi ya kitoko oyo olandi na bosembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ