Bakolose 1:23 - Mokanda na Bomoi23 Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.
Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango.