Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bakolose 1:19 - Mokanda na Bomoi

19 pamba te, kati na Ye, Nzambe asepelaki kovandisa bonzambe na Ye nyonso

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bakolose 1:19
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kaka na tango yango, awa Molimo Mosantu atondisaki Ye na esengo, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te obombaki makambo oyo, mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, pamba te yango nde osepelaki kosala.


Lokola atonda na bolingo mpo na biso, apesaki biso ngolu likolo ya ngolu ;


Motindami ya Nzambe alobaka kaka maloba kowuta na Nzambe, pamba te Nzambe atondisa ye na Molimo na Ye nyonso.


Pamba te lokola, kati na bwanya ya Nzambe, mokili etikalaki te koyeba Nzambe na nzela ya bwanya na yango, yango wana Nzambe asepeli kobikisa bandimi na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma.


oyo ezali nzoto na Ye. Nzambe oyo atondisaka nyonso kati na bato nyonso amimonisaka kati na Yesu, na mobimba ya bonzambe na Ye.


Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.


abongisa biso wuta kala mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko,


Ye oyo akitaki na se ya mabele, ezali kaka Ye wana oyo amataki na likolo koleka Likolo nyonso, mpo ete atondisa mokili mobimba.


Ezali kati Klisto nde bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi ya Nzambe ebombami.


Ezali kati na Klisto, kati na nzoto na Ye, nde mobimba ya nyonso oyo ezali kati na Nzambe evandi.


Boye, biso nyonso tozali ndenge moko : bokeseni ezali lisusu te kati na Mogreki mpe Moyuda, moto oyo akatama ngenga mpe moto oyo akatama ngenga te, mopaya mpe mwana mboka, mowumbu mpe monsomi. Bobele Klisto nde azali na tina : azali nyonso kati na bato nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ