18 azali moto ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba ; azali ebandeli, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpo ete azala na bokonzi ya liboso kati na nyonso,
Klisto akomona pasi mpe akozala moto ya liboso ya kosekwa kati na bakufi mpo na kosakola pole ya lobiko epai ya Bayuda mpe epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
Pamba te bato oyo Nzambe ayeba wuta kala, abongisa mpe bango wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele.
Nazali sik’oyo kosepela na pasi oyo nazali komona mpo na bino ; pamba te pasi oyo Klisto atikalaki komona te, ngai nazali kokokisa yango kati na nzoto na ngai mpo na bolamu ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba.
Oyo ezalaki wuta na ebandeli, oyo toyokaki, oyo tomonaki na miso na biso, oyo totalaki malamu, mpe oyo maboko na biso esimbaki, yango nde tozali kotatola na tina na Liloba na bomoi.
mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,
Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »
Alobaki na ngai lisusu : « Ekokisami. Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka. Na moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa mayi ya ofele wuta na etima ya mayi ya bomoi.