Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bakolose 1:10 - Mokanda na Bomoi

10 mpo ete bozala na bizaleli oyo ebongi liboso ya Nkolo, mpo ete bosepelisa Ye na nyonso, mpo ete bobota bambuma na nzela ya lolenge nyonso ya misala na bino ya malamu, mpo ete bokola kati na boyebi ya Nzambe,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bakolose 1:10
44 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki Yawe asepeli na nzela ya moto, akoyokanisa ye na banguna na ye.


Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.


Kasi yo, Daniele, batela maloba oyo lokola sekele mpe kanga buku kino na tango ya suka. Mingi bakotambola bipai na bipai, mpe boyebi ya bato ekokola makasi. »


Ekolo na ekolo ekotambola na kombo ya nzambe na yango, kasi biso tokotambola na Kombo na Yawe oyo azali Nzambe na biso, mpo na libela.


Pamba te mokili ekotonda na boyebi ya nkembo na Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.


Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.


Soki boboti bambuma ebele mpe botalisi, na nzela yango, ete bozali bayekoli na Ngai, Tata na Ngai azwa lokumu.


Nzokande, bomoi ya seko ezali : koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki.


Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete nazalaki mbala mingi kosala mabongisi ya koya epai na bino, mpo na kobuka mbuma kati na bino, ndenge nazalaki kosala kati na Bapagano mosusu ; kasi kino sik’oyo, bipekiselo mingi ezali kokanga ngai nzela.


mpe tata ya bato oyo bakatisa ngenga, ba-oyo bakatama ngenga kaka te, kasi balandaka mpe ndakisa ya kondima oyo Abrayami, tata na biso, azalaki na yango liboso ete bakata ye ngenga.


Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika.


Sik’oyo, tika ete matondi ezonga epai na Nzambe oyo, mpo na bomoko na biso na Klisto, atambolisaka biso tango nyonso kati na molongo na Ye ya balongi, mpe azwaka biso lokola bisalelo na Ye mpo na kopanza boyebi ya Klisto, na bisika nyonso, lokola solo kitoko ya malasi.


Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.


Yango wana, ezala tovandi kati na nzoto oyo to totiki yango, tokolukaka kaka kosepelisa Nkolo.


Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,


mpe nasengaka ete Nzambe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo ya bwanya mpe ya emoniseli mpo ete bokoka koyeba Ye malamu.


Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.


Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Nkolo, nazali kosenga na bino ete botambolaka na lolenge oyo ebongi na bato oyo Nzambe abengi :


Boye, biso nyonso tokokoma na bomoko kati na kondima mpe kati na boyebi ya Mwana na Nzambe, mpe tokokoma bato oyo bakembi kolanda ndenge Klisto azali ya kokoka.


Bosalaka makasi mpo na kososola makambo oyo esepelisaka Nkolo.


Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika ; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya.


Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.


bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na Yesu-Klisto, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.


Kasi botambola na lolenge oyo ebongi liboso ya Sango Malamu ya Klisto mpo ete, ezala nayei kotala bino to nayei te, nayoka sango ete botelemi ngwi mpe bosangani lokola moto moko, bozali kobunda elongo, na motema moko, mpo na kobatela kondima oyo Sango Malamu ememelaki bino,


Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye.


baboyaka kokangama na Klisto oyo azali Mokonzi, Moto. Ezali Klisto nde asalaka ete nzoto mobimba ekola malamu kolanda mokano ya Nzambe mpe ekangana na nzela ya misisa mpe misuni.


Yango wana, lokola bosilaki koyamba Yesu-Klisto lokola Nkolo, botambolaka lokola bato oyo bazali moko na Ye :


Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.


Botambolaka na bwanya liboso ya bato oyo bazali bandimi te mpe bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu.


tozalaki koteya, kolendisa mpe kotindika bino na kotambola na lolenge oyo ebongi liboso ya Nzambe oyo azali kobenga bino ete bokota kati na Bokonzi mpe nkembo na Ye.


Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.


Moto oyo akoti na mosala ya soda amipesaka te na makambo ya bato oyo bazali basoda te mpo na kosepelisa mokonzi na ye ya mampinga.


Yebisa bango lisusu ete basengeli kotosa bakambi mpe bakonzi, koselingwa mpo na misala nyonso ya malamu,


Bandeko na biso mpe basengeli koyekola komipesa na misala ya malamu, mpo na kosunga bosenga nyonso mpe kobika bomoi oyo ekobotaka bambuma.


Mpo na kondima, Enoki amemamaki kino epai ya Nzambe. Boye, atikalaki komona kufa te. Bamonaki ye lisusu te, pamba te Nzambe azwaki ye. Liboso na Enoki konetolama, Makomi etatolaki na tina na ye ete asepelisaki Nzambe.


Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango.


apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto ! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela ! Amen !


Pamba te soki bozali na bizaleli oyo ya malamu kati na bino mpe botondi na yango, ekosala ete bozala basali ya goyigoyi te mpe bokola makasi na boyebi ya Nzambe na biso mpe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !


Apesaka biso nyonso oyo tosengaka epai na Ye, pamba te totosaka mibeko na Ye mpe tosalaka makambo oyo esepelisaka Ye.


Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.


Batatolaki na miso ya Lingomba na tina na bolingo na yo. Bongo, okosala lisusu malamu koleka soki osungi bango, na lolenge oyo ekosepelisa Nzambe, mpo ete bakoba mobembo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ