Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bakolose 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko Timote ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bakolose 1:1
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Polo akomaki na Derbe mpe na Listre, epai wapi akutanaki na moyekoli moko, kombo na ye ezali « Timote. » Mama na ye azalaki Moyuda, kasi akomaki kondima Klisto ; mpe tata na ye azalaki moto ya Grese.


Polo, mowumbu ya Yesu-Klisto, oyo abengama mpo ete azala ntoma mpe aponama mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe,


Polo oyo abengama mpo na kozala ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko mobali Sositeni ;


Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko Timote ; Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya basantu nyonso oyo bazali kati na Akayi mobimba :


Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe ; Epai ya basantu mpe bandimi ya Yesu-Klisto, oyo bazali kati na Efeso :


Polo mpe Timote, bawumbu ya Yesu-Klisto ; Epai ya basantu nyonso kati na Klisto, oyo bazali na Filipi, elongo na bakambi ya Lingomba mpe badiakona :


Polo, Silasi mpe Timote ; Epai ya bandeko ya Lingomba ya Tesalonika, ba-oyo bazali kati na Nzambe Tata mpe kati na Nkolo Yesu-Klisto : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino !


Yango wana totindaki Timote, ndeko na biso mpe moninga ya Nzambe kati na mosala ya kopanza Sango Malamu ya Klisto, mpo ete alendisa bino mpe apesa bino mpiko kati na kondima,


Polo, Silasi mpe Timote ; Epai ya Lingomba ya bandeko ya Tesalonika, oyo ezali kati na Nzambe, Tata na biso, mpe kati na Nkolo Yesu-Klisto :


Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto, mpe Timote, ndeko na biso ; Epai ya Filemo, molingami na biso mpe moninga ya mosala ;


Boyeba ete ndeko na biso, Timote, asilaki kobima na boloko. Soki akoya noki, nakoya nzela moko na ye mpo na komona bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ