6 Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.
Yawe, Nzambe na ngai, yoka na bokebi losambo mpe libondeli na ngai, mowumbu na Yo ! Yoka koganga mpe libondeli oyo mowumbu na Yo azali kotombola epai na Yo na mokolo ya lelo.
Mokonzi Ezekiasi mpe mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, babondelaki Nzambe na tina na yango mpe bagangaki na ngambo ya Lola mpo na kosenga lisungi.
Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
Ebenga na ngai oyo obombami kati na madusu ya mabanga, kati na madusu ya bangomba, monisa ngai ata elongi na yo mpe sala ete nayoka ata mongongo na yo, pamba te mongongo na yo ezalaka elengi mpe elongi na yo ezalaka kitoko mingi ! »
Tango bakofunda bino epai ya bakambi, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba to lolenge ya koloba yango, pamba te ekopesamela bino na tango wana.
Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te.
Yango wana, bomitungisaka te mpo na mokolo ya lobi oyo ezali koya, pamba te mokolo yango ya lobi ekomitungisa na tina na yango moko : mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango.
Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ?
awa bozali kosala elongo na biso na nzela ya mabondeli na bino. Boye, bato ebele bakozongisa matondi epai ya Nzambe na tina na biso mpo na likabo ya ngolu oyo azali kopesa biso lokola eyano na mabondeli ya bato ebele.
Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso.
Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango ; mpe bozongisaka matondi.
Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.
Boye liboso na nyonso, nazali kolendisa ete bosengaka na Nzambe, bosambelaka Ye, bobondelaka Ye mpo na bato mosusu mpe bozongiselaka Ye matondi mpo na bato nyonso,
Mwasi akufisa mobali, oyo atikala penza ye moko mpe azali kokelela atiaka elikya na ye kati na Nzambe mpe asambelaka butu mpe moyi mpo na kosenga lisungi epai ya Nzambe.
Ana azongisaki : — Te, nkolo na ngai ! Nalangwe te, nameli ata vino to masanga makasi te. Kasi nazali na mawa mingi ; nazalaki kosopa motema na ngai epai na Yawe.
Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye.