Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 4:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tika ete boboto na bino eyebana na bato nyonso. Nkolo akomi pene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 4:5
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ?


Yango wana, bomitungisaka te mpo na mokolo ya lobi oyo ezali koya, pamba te mokolo yango ya lobi ekomitungisa na tina na yango moko : mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango.


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


Soki ezali na moto oyo alingaka Nkolo te, tika ete alakelama mabe ! Oh Nkolo, yaka !


Solo, awa bozali kofundana bino na bino, boyeba ete bosili komikweyisa. Mpo na nini bondimaka te ete basala bino mabe ? Mpo na nini bondimaka te ete bakosa bino ?


Yango wana, soki mpo na bilei na ngai, ndeko na ngai azali kokweya na masumu, nakotikala kolia lisusu misuni te mpo ete nazala libaku te, oyo ekokweyisa ye na masumu.


Bato nyonso oyo basalaka masano bamipekisaka makambo ebele ; basalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka ; kasi biso, tosalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka te.


Ngai Polo oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika, nazali kosenga na bino, na boboto mpe na bolingo ya Klisto :


bopesaka na mobulu nzela te ya kokota na pete kati na makanisi na bino to tika ete mitema na bino etungisamaka te likolo na emoniseli, liloba to mokanda oyo bato bakoki koloba na tina na yango ete ewuti epai na biso mpe ezali koloba ete mokolo ya Nkolo esili kokoma.


komipekisa kotiola bato, kozala bato na kimia, na boboto mpe na bolingo epai ya bato nyonso.


Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala ; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene.


Etikali moke, moke penza, ete Ye oyo asengeli koya aya, mpe akoya kala te.


Basalaki nyonso mpo na koluka koyeba tango nini mpe ndenge nini makambo oyo Molimo ya Klisto alobaki ekosalema. Molimo ya Klisto azalaki kati na bango, wana azalaki komiyebisela bango ete Klisto asengelaki komona pasi liboso ete azwa nkembo oyo ezalaki kozela Ye.


Suka ya makambo nyonso ekomi pene ; yango wana, botambola na bwanya mpe na mayele mpo ete bokoka kosambela.


Motatoli ya makambo oyo alobi : — Iyo, nazali koya kala mingi te. Amen : Nkolo Yesu, yaka !


Yoka ! Nazali koya kala mingi te. Esengo na moto oyo abatelaka maloba ya masakoli oyo ekomama kati na buku oyo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ