Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 4:18 - Mokanda na Bomoi

18 Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 4:18
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okotumba meme mobimba ya mobali na etumbelo ; ezali mbeka ya kotumba mpo na Yawe, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe ; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule.


mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.


Kornei atalaki ye na somo mpe atunaki : — Nkolo, likambo nini ? Anjelu azongisaki : — Mabondeli na yo mpe masungi oyo opesaka epai ya babola emati liboso ya Nzambe, mpe akanisi yango.


Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.


Nazwaki mbongo kowuta na Mangomba mosusu lokola lisungi na bango, wana nazalaki kokokisa lotomo na ngai kati na bino.


Pamba te lotomo ya makabo na bino ezali kaka te mpo na kokokisa bosenga ya basantu, kasi ezali mpe mpo ete matondi mingi ezonga epai ya Nzambe.


Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.


Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo : ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli.


Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.


Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango.


Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ