16 Tango mpe nazalaki na Tesalonika, botindelaki ngai mbala mibale lisungi ya biloko oyo nazalaki na yango na bosenga.
Sima na Polo mpe Silasi kolekela na Afipolisi mpe na Apolonia, bakendeki na Tesalonika epai wapi ndako ya mayangani ya Bayuda ezalaki.
Yango wana, tolukaki koya epai na bino. Ngai Polo, namekaki yango mbala na mbala, kasi Satana akangaki nzela na biso.
Bandeko na ngai, bokanisa ndenge nini tomonaki pasi mpe tosalaki mosala makasi ; butu mpe moyi, tozalaki kosala, pamba te toboyaki kozala mokumba epai ya moto ata moko kati na bino, wana toteyaki bino Sango Malamu ya Nzambe.
Bandeko na biso mpe basengeli koyekola komipesa na misala ya malamu, mpo na kosunga bosenga nyonso mpe kobika bomoi oyo ekobotaka bambuma.