Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 4:15 - Mokanda na Bomoi

15 Bino bato ya Filipi, boyebi malamu ete, na ebandeli ya mosala na ngai ya koteya Sango Malamu, wana nalongwaki na Masedwane, ata Lingomba moko te esanganaki na ngai na nzela ya lisungi, longola kaka bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 4:15
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mosakoli Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe oyo nasalelaka, nakondima eloko moko te. Namani atungisaki ye, kasi Elize aboyaki kaka.


Geazi, mosali ya Elize, moto na Nzambe, amilobelaki : « Nkolo na ngai atiki penza na pamba Namani, moto oyo ya Arami, wana aboyi kozwa biloko oyo amemelaki ye. Na Kombo na Yawe, nakolanda ye mbangu mpe nakozwa ata eloko moko epai na ye. »


Sima na Polo mpe Silasi kobima na boloko, bakendeki na ndako ya Lidi, epai wapi bakutanaki na bandeko mpe balendisaki bango. Bongo, bazongelaki mobembo na bango.


Pamba te Mangomba ya Masedwane mpe ya Akayi ezwaki mokano ya kosangisa biloko mpo na kosunga babola oyo bazali kati na basantu ya Yelusalemi.


Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete makambo oyo ekomeli ngai esali penza ete Sango Malamu ekende liboso.


bazali kosala na bolingo mpo bayebi ete ezali mpo na kotatola mpo na Sango Malamu nde ngai nazali awa.


mpo na lisungi na bino kati na mosala ya kopanza Sango Malamu, wuta na mokolo ya liboso kino sik’oyo.


Ezali sembo mpo na ngai kozala na makanisi ya lolenge oyo mpo na bino nyonso ; solo, nalingaka bino mingi, pamba te bino nyonso bosanganaka makasi elongo na ngai kati na ngolu ya Nzambe, ezala tango nazali ya kokangama na minyololo kati na boloko to tango nazali kolobela mpe kotatola Sango Malamu na molende.


Yango wana, balingami na ngai, ndenge bozalaki tango nyonso na botosi, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na kobanga mpe na kolenga : bokosalaka bongo kaka te tango nazali elongo na bino, kasi mpe sik’oyo, na kolekisa, tango nazali elongo na bino te ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ