Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 4:12 - Mokanda na Bomoi

12 Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo : ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 4:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Opesaki bango Molimo malamu na Yo mpo na kopesa bango bososoli. Opimelaki bango te mana na Yo, oyo bazalaki kolia, mpe opesaki bango mayi ya komela tango bazalaki na posa ya mayi.


Yawe alobaki na ngai, tango asimbaki ngai na loboko na Ye ya nguya mpe akebisaki ngai ete nalanda te nzela ya bato oyo :


Nabungaki nzela, kasi nabongoli motema ; sik’oyo nasili kososola, nazali kobeta tolo na pasi na motema. Nayokisamaki soni mpe nasambwaki, pamba te namemaki bozoba ya bolenge na ngai. ›


Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi.


Bongo, Yesu alobaki na bango : — Yango wana, molakisi nyonso ya mibeko, oyo akomi moyekoli ya makambo ya Bokonzi ya Likolo akokani na nkolo ndako oyo azali kobimisa na ebombelo bomengo na ye : biloko ya sika mpe biloko ya kala.


Ngai Polo oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika, nazali kosenga na bino, na boboto mpe na bolingo ya Klisto :


Pamba te bato mosusu balobaka : « Mikanda na ye ezalaka makasi mpe ebangisaka ; kasi soki ye moko azali elongo na biso, azalaka na ye moto ya bolembu mpe maloba na ye ezalaka tina te. »


Solo nasalaki misala makasi mpe ya pasi penza ; mbala mingi, nalalaki pongi te, nazangaki bilei ya kolia mpe mayi ya komela, nakilaki bilei, nanyokwamaki na malili, mpe nazangaki bilamba ya kolata.


Boni, nasalaki mabe ndenge namikitisaki mpo ete bino botombwama, wana nateyaki bino Sango Malamu ya Nzambe ?


Tango nazalaki epai na bino, namemisaki moto moko te mokumba na ngai, atako nazalaki kokelela. Pamba te bandeko oyo bawutaki na Masedwane bapesaki ngai biloko nyonso oyo nazalaki na yango na bosenga. Mpe nazalaki komibatela malamu mpo ete namemisa bino mokumba na ngai te ; mpe nakokoba kaka komibatela mpo na likambo yango.


Amonaki ye na esobe, kati na mokili oyo ekawuka, etonda na koganga ya somo. Azingelaki ye, abatelaki ye, akengelaki ye lokola mbuma ya liso na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ