Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 4:11 - Mokanda na Bomoi

11 Nalobi bongo te mpo ete nazali kokelela, pamba te nayekola kosepela na oyo nazali na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 4:11
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Jakobi akataki ndayi na koloba : « Soki Nzambe akozala elongo na ngai mpe akobatela ngai na mobembo oyo nazali kosala, mpe soki akopesa ngai bilei mpe bilamba ya kolata ;


Moyize andimaki kovanda elongo na Reweli ; bongo Reweli apesaki Sefora, mwana na ye ya mwasi, mpo ete azala mwasi ya Moyize.


Basoda mpe batunaki ye : — Bongo biso, tosengeli kosala nini ? Yoane azongiselaki bango : — Bobotola mbongo ya bato te mpe bokosela bato makambo te ; kasi bosepela kaka na lifuti na bino.


Solo nasalaki misala makasi mpe ya pasi penza ; mbala mingi, nalalaki pongi te, nazangaki bilei ya kolia mpe mayi ya komela, nakilaki bilei, nanyokwamaki na malili, mpe nazangaki bilamba ya kolata.


koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso.


Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.


Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,


Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene : koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto


Bokabolaki pasi elongo na bakangami ya boloko, mpe bondimaki na esengo nyonso ete babotola ata biloko na bino, pamba te boyebaki ete bozali na bomengo ya kitoko koleka, bomengo oyo ekowumela libela na libela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ