Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 4:10 - Mokanda na Bomoi

10 Nazalaki penza na esengo mingi kati na Nkolo, wana botalisaki ngai lisusu bolingo na bino. Solo, bozalaki kokanisa kosunga ngai, kasi bozangaki nde libaku mpo na kokokisa yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 4:10
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Ezekiasi elongo na bakalaka na ye bayaki komona mipiku yango, bakumisaki Yawe mpe bapambolaki Isalaele, bato na Ye.


Boni, okosilikela biso penza mpo na libela ? Okokangela penza biso kanda mpo na tango nyonso ?


Bitape na ye ekokende mosika, akozala na lokumu lokola nzete ya olive, mpe malasi na ye ekozala lokola malasi ya nzete ya sedele ya Libani.


Tango nazalaki epai na bino, namemisaki moto moko te mokumba na ngai, atako nazalaki kokelela. Pamba te bandeko oyo bawutaki na Masedwane bapesaki ngai biloko nyonso oyo nazalaki na yango na bosenga. Mpe nazalaki komibatela malamu mpo ete namemisa bino mokumba na ngai te ; mpe nakokoba kaka komibatela mpo na likambo yango.


kati na Liloba ya bosolo mpe nguya ya Nzambe ; kati na bibundeli ya bosembo mpo na kobundisa monguna mpe komibatela ;


Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.


Tika ete moto oyo bazali koteya Liloba apesa ndambo ya biloko na ye nyonso epai ya moteyi na ye.


Polo mpe Timote, bawumbu ya Yesu-Klisto ; Epai ya basantu nyonso kati na Klisto, oyo bazali na Filipi, elongo na bakambi ya Lingomba mpe badiakona :


Nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai tango nyonso nakanisaka bino ;


pamba te akomaki pene ya kokufa mpo na mosala ya Klisto : atiaki bomoi na ye kati na likama mpo na kopesa ngai lisungi oyo bino moko bokokaki te kopesa ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ