Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 3:21 - Mokanda na Bomoi

21 Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 3:21
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tokolukela yo biloko ya matoyi ya wolo oyo batia bambuma ya mike-mike ya palata.


akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.


Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, bibembe na bango ekosekwa. Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, bolamuka mpe boganga na esengo ! Pamba te mamwe na Yo ezali lokola mamwe ya tongo ; mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.


Nakokangola bango na bokonzi ya mboka ya bakufi, nakosikola bango na kufa. Oh kufa, wapi nguya na yo ? Oh mboka ya bakufi, wapi nguya na yo ya kobebisa ? Nakoyokela bango mawa te !


Yesu abongolamaki na miso na bango : elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole.


Yesu azongiselaki bango : — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.


Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.


Pamba te bato oyo Nzambe ayeba wuta kala, abongisa mpe bango wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele.


Tango Klisto oyo azali bomoi na bino akomonana, bino mpe bokomonana elongo na Ye kati na nkembo.


Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka.


« Nazali Alifa mpe Omega, » elobi Nkolo Nzambe, « Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ