Yesu azongisaki : — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
— Bato ya Galile, mpo na nini botikali awa na kotala na likolo ? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na Likolo, akozonga ndenge kaka bomoni Ye kokende na Likolo.
Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te ; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko.
Kondima mpe bolingo yango etongami na likolo ya elikya ya bomengo oyo Nzambe abongisela bino kati na Likolo ; elikya yango ebotamaki kati na bino tango boyokaki Liloba ya solo, Sango Malamu
pamba te tango kaka mitindo ekopesama na nzela ya koganga ya mokonzi ya ba-anjelu mpe ya kelelo ya Nzambe, Ye moko Nkolo akokita wuta na Lola mpe bato oyo basila kokufa kati na Klisto bakosekwa bato ya liboso.
Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana : akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.
Kasi, bopusani nde pene ya ngomba Siona, pene ya Yelusalemi ya Likolo, engumba ya Nzambe na bomoi ; pene ya bankoto na bankoto ya ba-anjelu oyo basangani mpo na kosepela,
ndenge wana mpe Klisto, oyo amikabaki lokola mbeka mbala moko mpo na kolongola masumu ya bato ebele, akoya na mbala ya mibale, mpo na kolongola masumu ya bato te, kasi mpo na kobikisa bato oyo bazali kozela Ye na posa makasi.
« Botala, azali koya kati na mapata ! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » Ekosalema penza bongo ! Amen.