18 Pamba te ndenge nazalaki koyebisa bino yango mbala na mbala mpe, sik’oyo, nazali lisusu koyebisa bino yango na kolela, bato mingi bazali kotambola lokola banguna ya ekulusu ya Klisto.
Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.
Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !
Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe ? Bomikosa te : bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali,
Solo, tango nakomelaki bino, nazalaki kati na pasi makasi, kati na komitungisa na motema na ngai, mpe kati na kolela makasi ; ezalaki te mpo na koyokisa bino mawa, kasi mpo ete boyeba mozindo ya bolingo na ngai mpo na bino.
Kasi tango ngai namonaki ete bazali kotambola te na bomoi ya sembo kolanda bosolo ya Sango Malamu, nalobaki na Petelo na miso ya bango nyonso : « Ozali Moyuda, kasi ozali kobika bomoi na yo lokola Mopagano ! Ndenge nini ozali kosenga na makasi ete Bapagano batambola lokola Bayuda ?
Mpo na ngai, nakomikumisa na eloko mosusu te, longola kaka na ekulusu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, pamba te ezali na nzela ya ekulusu yango nde mokili ebakamaki mpo na ngai, mpe ngai nabakamaki mpo na mokili.
Boye, tala makambo oyo nazali koyebisa bino mpe kobetela sete kati na Nkolo : Botambolaka lisusu te lokola Bapagano oyo balandaka makanisi na bango, oyo ezanga tina.
asengeli mpe te kokosa to kosala ndeko na ye mabe kati na makambo oyo etali bonzoto, pamba te Nkolo akopesa etumbu na bato nyonso oyo basalaka mabe ya lolenge wana, ndenge toyebisaki mpe tokebisaki bino liboso.
Tozali koyoka ete mingi kati na bino bazali bagoyigoyi mpe bazali kotambola na bomoi ya mobulu, bazali kosala eloko moko te, kasi bazali kaka kokota na makambo ya bato mosusu.
Akopesa mingi-mingi etumbu epai ya ba-oyo, mpo na lokoso na bango ya makambo ya mbindo, batambolaka kolanda baposa mabe ya nzoto mpe batiolaka bokonzi ya Nkolo. Lokola bateyi yango ya lokuta batondi na lolendo mpe bamimonaka lokola bakoka na nyonso, babangaka te kofinga bikelamu ya nkembo ;