Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 3:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bandeko, nazali kokanisa te ete nasili kozwa yango ; kasi nasalaka likambo moko : nabosanaka makambo nyonso oyo esili koleka, mpe namipesaka mpo na makambo oyo ezali liboso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 3:13
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi : nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.


Bana basi ya bakonzi bazali kati na basi ya lokumu ; mwasi ya mokonzi azali na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, alati biloko ya wolo ya Ofiri.


kasi likambo moko kaka ezali na tina. Mari aponi oyo eleki malamu, mpe moto ata moko te akobotola ye yango.


Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo asimbi kongo mpo na kobalola mabele ya bilanga, kasi azali kotala na sima, azali na tina moko te mpo na Bokonzi ya Nzambe.


Boye, kobanda sik’oyo, tokotala lisusu moto moko te na ndenge ya bomoto. Atako, na kala, totalaki Klisto na ndenge ya bomoto, kasi sik’oyo tozali lisusu kotala Ye bongo te.


Yango wana, balingami na ngai, ndenge bozalaki tango nyonso na botosi, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na kobanga mpe na kolenga : bokosalaka bongo kaka te tango nazali elongo na bino, kasi mpe sik’oyo, na kolekisa, tango nazali elongo na bino te ;


Nalingi koloba te ete nasili kozwa biloko oyo nyonso to mpe nasili kokoma moto ya kokoka, kasi nazali nde kopota mbangu mpo na kozwa yango, pamba te Yesu-Klisto asila mpe kozwa ngai.


Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene : koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto


Yango wana, tokota na mateya oyo ekoki mpo na mikolo ; tolekisa tango te na mateya ya ebandeli na tina na Klisto, mpe tozongela te mateya lokola kobongola motema, kotika misala oyo ememaka na kufa, kondima kati na Nzambe,


Balingami na ngai, ezali na likambo moko oyo bosengeli te kobosana : mpo na Nkolo, mokolo moko ezali lokola mibu nkoto moko, mpe mibu nkoto moko ezali lokola mokolo moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ