Bafilipi 3:1 - Mokanda na Bomoi1 Mpo na kosukisa, bandeko na ngai, bosepelaka kati na Nkolo ! Ezali likambo ya pasi te mpo na ngai kokomela bino lisusu makambo oyo nakomelaki bino liboso, mpe yango ezali mpo na bolamu na bino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi bokolia yango kaka na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo Yawe Nzambe akopona : bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpe bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na mosala nyonso oyo maboko na bino ekosala.