Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 2:30 - Mokanda na Bomoi

30 pamba te akomaki pene ya kokufa mpo na mosala ya Klisto : atiaki bomoi na ye kati na likama mpo na kopesa ngai lisungi oyo bino moko bokokaki te kopesa ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 2:30
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.


Bandimaki ata kokufa mpo na ngai. Ngai moko kaka te nde nazali kotonda bango, kasi mpe Mangomba nyonso ya mikili ya Bapagano.


Solo, oyo epolaka esengeli kolata kozanga kopola, mpe oyo ekufaka esengeli kolata kozanga kokufa.


Soki Timote akomi, bosala nyonso ete azala na kimia kati na bino, pamba te asalaka mosala ya Nkolo, lokola ngai.


Nasepeli mingi komona Stefanasi, Fortinatisi mpe Akayikisi ; pamba te esali lokola namoni bino nyonso.


Mpo na ngai, nakopesa biloko na ngai nyonso na esengo, mpe nakomipesa mobimba mpo na bino. Soki nalingi bino mingi ; boni, bino bokoki kolinga ngai mingi te ?


Boye, kufa esalaka mosala na yango kati na biso, kasi bomoi esalaka mosala na yango kati na bino.


Mpe ata soki makila na ngai ekoki kosopana lokola mbeka ya masanga na likolo ya mbeka oyo ezali mosala ya kondima na bino, nakozala na esengo mpo na yango mpe nakosepela elongo na bino nyonso.


Azalaki penza kobela kino akomaki pene ya kokufa, kasi Nzambe ayokelaki ye mawa, mpe ye moko kaka te kasi ngai mpe, mpo ete natonda na mawa te.


Nazalaki penza na esengo mingi kati na Nkolo, wana botalisaki ngai lisusu bolingo na bino. Solo, bozalaki kokanisa kosunga ngai, kasi bozangaki nde libaku mpo na kokokisa yango.


Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye.


Nalingaki ete atikala elongo na ngai awa, na boloko epai wapi nazali mpo na Sango Malamu, mpo ete asalisa ngai na esika na yo.


Kasi bango balongi ye na nzela ya makila ya Mpate, mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango ; balingaki te bomoi na bango kino kondima ata kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ