Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 2:27 - Mokanda na Bomoi

27 Azalaki penza kobela kino akomaki pene ya kokufa, kasi Nzambe ayokelaki ye mawa, mpe ye moko kaka te kasi ngai mpe, mpo ete natonda na mawa te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 2:27
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »


Mbala motoba, akobikisa yo na pasi ; mpe na mbala ya sambo, mabe ekokomela yo te.


Yawe azali pene ya bato oyo bazoki na mitema mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.


Apesaki bango etumbu na kotelemela mpe na kobengana. Alongolaki bango na mopepe na Ye ya makasi, kaka na mokolo moko ya mopepe na Ye ya este.


Solo, pasi na ngai ebongwani esengo ; na bolingo na Yo, obateli ngai longwa na libulu na kufa ; obwaki masumu na ngai nyonso sima na mokongo na yo.


Tango okokatisa mayi monene, nakozala elongo na yo ; mpe tango okokatisa bibale, ekozindisa yo te. Tango okotambola kati na moto, okozika te, mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;


Oh Yawe, pesa biso etumbu oyo ekoki na biso ; kasi kopesa yango na kanda te, noki te okosilisa koboma biso.


Olobaki : ‹ Mawa na ngai ! Yawe abakisi pasi mpe minyoko na ngai ; nalembi likolo ya kolela mpe nazali lisusu na kimia te ! ›


Pasi na ngai ezangeli kisi mpo na kosilisa yango, motema na ngai elembi kati na ngai.


Oh Yawe, nayokaki sango ya Kombo na Yo ! Yawe, nabangaki misala na Yo. Sala yango lisusu na tango na biso ! Sala ete eyebana lisusu na tango na biso ! Kasi ata soki otomboki ndenge nini, kobosanaka te mawa na Yo mpo na biso.


Na mikolo wana, akomaki kobela mpe akufaki. Sima na kosukola nzoto na ye, batiaki yango kati na shambre ya likolo.


Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso ; mpe Nzambe azali Moyengebene ; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.


Nzokande sik’oyo, bosengeli kolimbisa ye mpe kobondisa ye, mpo ete azala na mawa makasi te.


Pamba te azali na posa makasi ya komona bino nyonso mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo boyokaki ete azali kobela.


Yango wana nazali kotinda ye noki penza mpo ete, tango bokomona ye lisusu, bosepela, mpe mawa na ngai esila.


pamba te akomaki pene ya kokufa mpo na mosala ya Klisto : atiaki bomoi na ye kati na likama mpo na kopesa ngai lisungi oyo bino moko bokokaki te kopesa ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ