Wana Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu na Yawe koboma bato, alobaki na Yawe : « Ngai nde nasalaki masumu, ngai nde nasalaki mbeba ; bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te ; boye, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ! »
komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.
Kasi Polo azongiselaki biso : — Mpo na nini bozali kolela mpe kolembisa ngai ? Nasili komibongisa kaka te mpo na kokangama, kasi mpe mpo na kokufa kati na Yelusalemi mpo na Kombo ya Nkolo Yesu.
Kasi nakanisi ete ezali na tina mingi ya kotindela bino ndeko na ngai, Epafrodite, moninga na ngai ya mosala mpe ya etumba, ntoma oyo botindaki epai na ngai mpo na komemela ngai biloko oyo nazalaki na yango na bosenga.
Yango wana, bandeko mpe balingami na ngai, bino oyo nazali na posa makasi ya komona lisusu, bino oyo bozali esengo mpe motole na ngai, botikala ngwi kati na Nkolo.