Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 2:25 - Mokanda na Bomoi

25 Kasi nakanisi ete ezali na tina mingi ya kotindela bino ndeko na ngai, Epafrodite, moninga na ngai ya mosala mpe ya etumba, ntoma oyo botindaki epai na ngai mpo na komemela ngai biloko oyo nazalaki na yango na bosenga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 2:25
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Motindami ya sembo azalaka lokola mopepe ya malili ya mvula ya pembe na tango ya kobuka bambuma, asalaka esengo ya mokonzi na ye.


Nazali koloba na bino penza ya solo : mowumbu aleki nkolo na ye te na bokonzi, mpe ntoma aleki motindi na ye te na bokonzi.


Ndenge otindaki Ngai kati na mokili, ndenge wana mpe Ngai nazali kotinda bango.


Bopesa mbote na Prisika mpe Akilasi, baninga na ngai ya mosala kati na Yesu-Klisto.


Bopesa mbote na Iribano, moninga na biso ya mosala kati na Klisto, mpe Sitakisi, molingami na ngai.


Pamba te biso, tozali basali elongo na Nzambe ; mpe bino, bozali elanga ya Nzambe, Ndako ya Nzambe.


Kasi motema na ngai etikalaki kozala na kimia te mpo ete namonaki kuna te ndeko na ngai, Tito. Boye, natikaki bango mpe nakendeki na Masedwane.


Pamba te azali na posa makasi ya komona bino nyonso mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo boyokaki ete azali kobela.


Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye.


Solo, nasengi lisusu na yo moninga na ngai ya motema kati na mosala : sunga basi oyo, pamba te babundaki mpo na Sango Malamu, elongo na ngai, Klema mpe baninga mosusu ya mosala oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi.


Ezali molingami Epafrasi, moninga na biso ya mosala, nde ateyaki bino Sango Malamu yango ; azali mosali ya Klisto mpe asalaka na bosembo epai na bino.


Yesu oyo babengaka Jistisi atindeli bino mbote. Kati na Bayuda oyo bakomaki Baklisto, kaka bango nde bazali kosala elongo na ngai mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpe bazali mpo na ngai kobondisama mobimba.


Yango wana totindaki Timote, ndeko na biso mpe moninga ya Nzambe kati na mosala ya kopanza Sango Malamu ya Klisto, mpo ete alendisa bino mpe apesa bino mpiko kati na kondima,


Ndenge moko mpe Malako, Arisitarke, Demasi mpe Luka, baninga na ngai ya mosala, bango mpe batindeli yo mbote.


Yango wana, bandeko basantu, bino oyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botalela kaka Yesu oyo biso tozali kondima lokola Ntoma mpe Mokonzi ya Banganga-Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ