Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 2:22 - Mokanda na Bomoi

22 Nzokande, bino moko boyebi ndenge nini Timote alakisaki molende na ye, pamba te asalaki elongo na ngai mosala ya kopanza Sango Malamu, ndenge mwana asalaka elongo na tata na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 2:22
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Litatoli na ye ezalaki malamu kati na bandeko ya Listre mpe ya Ikoniomi.


koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya.


Soki Timote akomi, bosala nyonso ete azala na kimia kati na bino, pamba te asalaka mosala ya Nkolo, lokola ngai.


Ezali na tina wana nde natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo, oyo azali sembo kati na Nkolo ; akolobela bino lisusu banzela na ngai mpo na bomoi kati na Yesu-Klisto, ndenge kaka nateyaka yango bisika nyonso kati na Mangomba nyonso.


Pamba te nakomelaki bino lisusu mpo na komeka bino mpe mpo na kotala soki botosaka na makambo nyonso.


Elongo na bango, tozali kotinda ndeko na biso, oyo tondimaka mbala na mbala bolingo na ye. Mpe na mbala oyo, azali na yango lisusu koleka, pamba te azali penza kotiela bino motema.


Yango wana, bolakisa bango elembo ya bolingo na bino mpo ete Mangomba nyonso endima mpe eyeba ete tomikumisaka na pamba te na tina na bino liboso na bango.


Nazali kopesa bino mitindo te, kasi nazali nde koluka komeka bosolo ya bolingo na bino na kokokanisa yango na molende ya bato mosusu.


Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete makambo oyo ekomeli ngai esali penza ete Sango Malamu ekende liboso.


bazali kosala na bolingo mpo bayebi ete ezali mpo na kotatola mpo na Sango Malamu nde ngai nazali awa.


mpo na lisungi na bino kati na mosala ya kopanza Sango Malamu, wuta na mokolo ya liboso kino sik’oyo.


Ezali sembo mpo na ngai kozala na makanisi ya lolenge oyo mpo na bino nyonso ; solo, nalingaka bino mingi, pamba te bino nyonso bosanganaka makasi elongo na ngai kati na ngolu ya Nzambe, ezala tango nazali ya kokangama na minyololo kati na boloko to tango nazali kolobela mpe kotatola Sango Malamu na molende.


Pamba te nazali awa na moto mosusu te, longola kaka ye, oyo azali kokabola na ngai makanisi moko mpe azali komitungisa na ndenge ya solo mpo na bolamu na bino ;


Tala mitindo oyo nazali kopesa na yo Timote, mwana na ngai, kolanda masakoli oyo elobamaki na tina na yo : kolanda masakoli yango, bunda etumba ya malamu,


Epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo kati na kondima : Tika ete ngolu, mawa mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Nkolo na biso !


Soki oteyi makambo oyo epai ya bandeko, okozala mosali malamu ya Yesu-Klisto, mosali oyo alendisami na maloba ya kondima mpe na malakisi ya kitoko oyo olandi na bosembo.


Epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo : Tika ete ngolu, boboto mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Nkolo na biso !


Nzokande yo oyebi nyonso na tina na mateya na ngai, bizaleli, makanisi, kondima, kokanga motema, bolingo, mpiko,


epai ya Tito, mwana na ngai ya solo kati na kondima moko oyo tozali kokabola elongo na ye : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Mobikisi na biso !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ