20 Pamba te nazali awa na moto mosusu te, longola kaka ye, oyo azali kokabola na ngai makanisi moko mpe azali komitungisa na ndenge ya solo mpo na bolamu na bino ;
Nzokande, bino moko boyebi ndenge nini Timote alakisaki molende na ye, pamba te asalaki elongo na ngai mosala ya kopanza Sango Malamu, ndenge mwana asalaka elongo na tata na ye.
Yesu oyo babengaka Jistisi atindeli bino mbote. Kati na Bayuda oyo bakomaki Baklisto, kaka bango nde bazali kosala elongo na ngai mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpe bazali mpo na ngai kobondisama mobimba.
Epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo kati na kondima : Tika ete ngolu, mawa mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Nkolo na biso !
Soki oteyi makambo oyo epai ya bandeko, okozala mosali malamu ya Yesu-Klisto, mosali oyo alendisami na maloba ya kondima mpe na malakisi ya kitoko oyo olandi na bosembo.
Nakanisaka bosolo ya kondima na yo, oyo Loyisi, koko na yo ya mwasi, mpe Enise, mama na yo, bazalaki na yango, kondima oyo nandimisami solo ete ezali mpe kati na yo.