Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 2:17 - Mokanda na Bomoi

17 Mpe ata soki makila na ngai ekoki kosopana lokola mbeka ya masanga na likolo ya mbeka oyo ezali mosala ya kondima na bino, nakozala na esengo mpo na yango mpe nakosepela elongo na bino nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 2:17
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali mbeka ya kotumba ya tango nyonso, oyo ebandisamaki na ngomba Sinai ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Bokobakisa lisusu likabo ya masanga : balitele mibale ya masanga ya vino ya sika mpo na mwana meme moko na moko. Bokobonzela Yawe masanga yango na Esika ya bule.


Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.


Kasi Polo azongiselaki biso : — Mpo na nini bozali kolela mpe kolembisa ngai ? Nasili komibongisa kaka te mpo na kokangama, kasi mpe mpo na kokufa kati na Yelusalemi mpo na Kombo ya Nkolo Yesu.


Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.


ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi.


Mpo na ngai, nakopesa biloko na ngai nyonso na esengo, mpe nakomipesa mobimba mpo na bino. Soki nalingi bino mingi ; boni, bino bokoki kolinga ngai mingi te ?


Boye, kufa esalaka mosala na yango kati na biso, kasi bomoi esalaka mosala na yango kati na bino.


koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso.


Nalobaki na tina na bino na bosembo monene, mpe namikumisaka makasi na tina na bino. Kati na pasi na biso nyonso, nalendisamaki makasi, mpe natondi na esengo.


Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai.


Bino mpe ndenge moko, bosepela mpo na yango mpe bosepela elongo na ngai.


pamba te akomaki pene ya kokufa mpo na mosala ya Klisto : atiaki bomoi na ye kati na likama mpo na kopesa ngai lisungi oyo bino moko bokokaki te kopesa ngai.


Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye.


Nazali sik’oyo kosepela na pasi oyo nazali komona mpo na bino ; pamba te pasi oyo Klisto atikalaki komona te, ngai nazali kokokisa yango kati na nzoto na ngai mpo na bolamu ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba.


ndenge wana mpe, na bolingo monene oyo tozali na yango mpo na bino, tosepelaki kaka te kopesa bino Sango Malamu ya Nzambe, kasi tosepelaki mpe kopesa bino bomoi na biso, pamba te bokomaki motuya makasi na miso na biso.


Pamba te nakomi pene ya kokaba bomoi na ngai lokola mbeka ya masanga mpo na Nzambe, mpe tango na ngai ya kotika mokili oyo ekoki.


Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka.


Tala ndenge nini toyebi ndimbola ya bolingo : Yesu-Klisto akabaki bomoi na Ye mpo na biso. Boye biso mpe tosengeli kokaba bomoi na biso mpo na bandeko na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ