Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 2:16 - Mokanda na Bomoi

16 mpo bosimbi makasi Liloba ya bomoi. Boye, na mokolo ya Klisto, bokosala lokumu na ngai, pamba te nakimaki mbangu mpe nasalaki mosala na pamba te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 2:16
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe na ngai, nasepelaka kosala mokano na Yo, Mobeko na Yo ezali kati na motema na ngai. »


Nzambe, wuta bolenge na ngai, oteya ngai ; mpe kino lelo, nazali kotatola bikamwa na Yo.


Kasi ngai, nalobaki : « Nabimisaki motoki na ngai se pamba, nasilisaki makasi na ngai na pamba mpe nazwaki litomba moko te. Nzokande, lifuti na ngai ezali na maboko ya Yawe, mpe litomba na ngai ezali epai ya Nzambe na ngai. »


Makambo oyo nazali koyebisa bino sik’oyo kati na molili, boloba yango na moyi ; mpe oyo bazali koloba na bino na litoyi, bosakola yango wuta na likolo ya ndako.


Nazali koloba na bino : moto nyonso oyo, na miso ya bato, akotatola ete azali moto na Ngai, Mwana na Moto mpe akotatola liboso ya ba-anjelu ya Nzambe ete azali moto na Ye ;


Ezali Molimo nde apesaka bomoi ; mosuni ezali na eloko te. Maloba oyo nalobi na bino ezali Molimo mpe bomoi.


Simona Petelo azongisaki : — Nkolo, tokokende epai ya nani ? Yo nde ozali na maloba ya bomoi ya seko.


Bandeko na ngai, bino oyo bozali bana ya Abrayami, mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, ezali epai na biso nde Nzambe atindaki maloba oyo ya lobiko.


Ezali Ye nde akolendisa mpe bino kino na suka, mpo ete bozala bato bazangi pamela na mokolo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto.


Yango wana ngai, nazali kopota mbangu na bozoba te, nazali kobeta makofi bibetabeta te.


ndenge kaka bosili kososola yango mwa moke, ete bokoki penza komikumisa na tina na biso, ndenge mpe biso tokomikumisa na tina na bino na mokolo ya Nkolo Yesu.


Nakendeki kuna mpo na kotosa emoniseli oyo nazwaki. Natalisaki na bakambi Sango Malamu oyo nateyaka kati na Bapagano, na esika oyo tozalaki kaka biso moko mpo nalingaki ete mosala oyo nazalaki kosala mpe oyo nasilaki kosala ezwama na motuya.


Ah ! Nazali penza kobanga ete pasi oyo namiyokisaki mpo na bino ekende pamba.


mpo ete bokoka kososola makambo oyo eleki malamu. Na bongo, bokozala peto mpe bokozanga pamela mpo na mokolo ya Klisto,


Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.


Banani bazali penza elikya na biso, esengo na biso to motole na biso, oyo tokomikumisa mpo na yango na miso ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na mokolo oyo akoya ? Boni, ezali bino te ?


Mpo na yango, lokola nakokaki lisusu kokanga motema te, natindaki Timote mpo na koluka koyeba soki bozali kaka kokoba kati na kondima. Nazalaki kobanga ete Satana ameka bino mpe ete mosala na biso ekende pamba.


Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.


Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko ; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka.


Oyo ezalaki wuta na ebandeli, oyo toyokaki, oyo tomonaki na miso na biso, oyo totalaki malamu, mpe oyo maboko na biso esimbaki, yango nde tozali kotatola na tina na Liloba na bomoi.


Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi : — Yaka ! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba : « Yaka ! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ