Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 2:10 - Mokanda na Bomoi

10 mpo ete, na Kombo na Yesu, mabolongo nyonso efukama kati na Likolo, na mokili mpe na se ya mabele,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 2:10
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amatisaki ye na shareti na ye ya mibale mpe bato bazalaki koganga : « Bofukama ! » Boye, atiaki Jozefi mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito.


Boya, togumbama mpe tofukama, tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe, Mokeli na biso !


Pamba te, ndenge Yona avandaki kati na libumu ya mbisi monene mikolo misato mpe babutu misato, ndenge wana mpe Mwana na Moto akosala mikolo misato mpe babutu misato na se ya mabele.


balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali ; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »


Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.


Kasi eyano nini Nzambe azongiselaki ye ? — Nabombi bato nkoto sambo mpo na Ngai, ba-oyo mabolongo na bango efukameli Bala te.


mpo na kokokisa yango na tango ya suka : kosangisa kati na Klisto bikelamu nyonso oyo ezali kati na Likolo mpe oyo ezali na mabele.


Nzokande, « amataki na likolo » elingi koloba penza nini ? Elingi kaka koloba ete, liboso, akitaki kino na se ya mabele.


Mpe lisusu, tango Nzambe atindaki Mwana na Ye ya liboso kati na mokili, epai ya nani aloba : « Tika ete ba-anjelu nyonso ya Nzambe bagumbamelaka Yo ? »


Ebale monene esanzaki bakufi oyo bazalaki kati na yango ; kufa elongo na mboka ya bakufi esanzaki mpe bakufi oyo bazalaki kati na yango. Mpe bato nyonso basambisamaki, moto na moto kolanda misala na ye.


bampaka tuku mibale na minei bazalaki kogumbama liboso ya Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi, kogumbamela Ye oyo azali na bomoi seko na seko mpe kokitisa mitole na bango liboso ya Kiti ya Bokonzi na koloba :


Kasi ezala kati na Lola to na mokili to na se ya mabele, moko te akokaki kofungola buku to kotala kati na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ