Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te.
boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.
Mpo na ngai, nakomikumisa na eloko mosusu te, longola kaka na ekulusu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, pamba te ezali na nzela ya ekulusu yango nde mokili ebakamaki mpo na ngai, mpe ngai nabakamaki mpo na mokili.
Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai.
Nzokande, soki kokoba na ngai kobika kati na mokili ekopesaka ngai nzela ya kobota bambuma ebele ya malamu na nzela ya mosala na ngai, nayebi te nini nasengeli kopona.
Bongo nayokaki mongongo moko kowuta na Lola mpe koloba na ngai : — Koma : « Kobanda sik’oyo, esengo na bato oyo bakufaka na lisanga na Nkolo ! » Mpe Molimo alobaki : — Iyo, pasi na bango esilaka mpe bazwaka bopemi, pamba te misala na bango elandaka bango.