Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 1:17 - Mokanda na Bomoi

17 Kasi mpo na ba-oyo bazali kosakola Klisto mpo na posa ya kowelana, makanisi na bango ezali ya malamu te : bazali kokanisa ndenge nini bakoki kobakisa pasi na ngai, na tango oyo nazali na pasi lokola mokangami kati na boloko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 1:17
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bozala na mitema ya kokita, bomitungisa te mpo na koluka koyeba ndenge nini bokosamba.


— Bandeko mpe batata, boyoka sik’oyo ndenge nini nalingi komilongisa.


Agripa alobaki na Polo : — Napesi yo nzela ya koloba. Boye, Polo atombolaki loboko mpe abandaki kosamba :


Wana Polo azalaki nanu koloba, Festisi akataki ye maloba mpe agangelaki ye : — Ozali na liboma, Polo ! Boyebi oyo otondi na yango ekomisi yo liboma !


kasi kanda mpe kanda makasi epai ya moto oyo, na nzela ya botomboki na ye, aboyaka solo mpe asepelaka na mabe.


Ezala bongo to bongo te, eloko ya motuya ezali ete Klisto azali kosakolama, na lolenge nyonso, ezala na makanisi ya mabe to na bosolo ; mpe ngai nazali kosepela mpo na yango. Kutu, nakokoba kosepela mpo na yango.


Ezali sembo mpo na ngai kozala na makanisi ya lolenge oyo mpo na bino nyonso ; solo, nalingaka bino mingi, pamba te bino nyonso bosanganaka makasi elongo na ngai kati na ngolu ya Nzambe, ezala tango nazali ya kokangama na minyololo kati na boloko to tango nazali kolobela mpe kotatola Sango Malamu na molende.


Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina ; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino.


Ezali mpe mpo na litatoli yango nde Nzambe atiaki ngai mopanzi sango mpe ntoma, mpo na kolakisa kondima mpe solo epai ya Bapagano. Nazali kokosa te, nazali nde koloba solo.


Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi kino bakanga ngai minyololo lokola mobomi, kasi bakangi Liloba na Nzambe minyololo te.


Tango nasambaki mpo na mbala ya liboso, moto ata moko te azalaki wana mpo na kosunga ngai ; bango nyonso basundolaki ngai. Tika ete Nzambe atangela bango yango te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ