Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bafilipi 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Polo mpe Timote, bawumbu ya Yesu-Klisto ; Epai ya basantu nyonso kati na Klisto, oyo bazali na Filipi, elongo na bakambi ya Lingomba mpe badiakona :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bafilipi 1:1
48 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ekozala lokola moto oyo akei na mobembo, bongo atiki ndako na ye mpe apesi mokumba na yango epai ya basali na ye ; apesi na mosali moko na moko mosala oyo ekoki na ye mpe apesi mitindo epai ya mokengeli ekuke ete akengela malamu.


Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai ! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.


Nzokande, ekomama boye kati na buku ya banzembo : « Tika ete ndako na ye etikala polele, mpe tika ete moto moko te avanda kati na yango ! » Mpe : « Tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye ! »


Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.


Ananiasi azongisaki : — Nkolo, bato ebele bayebisi ngai makambo na tina na moto yango mpe mabe nyonso oyo asali babulami na Yo, na Yelusalemi.


Polo, mowumbu ya Yesu-Klisto, oyo abengama mpo ete azala ntoma mpe aponama mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe,


Epai na bino nyonso oyo, kati na Rome, bozali balingami ya Nzambe mpe bobengama mpo na kozala basantu : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !


Soki Timote akomi, bosala nyonso ete azala na kimia kati na bino, pamba te asalaka mosala ya Nkolo, lokola ngai.


Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko Timote ; Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya basantu nyonso oyo bazali kati na Akayi mobimba :


Bozali sik’oyo kokanisa nini na likambo oyo : nazali koluka kosepelisa bato to nazali koluka kosepelisa Nzambe ? Boni, nazali koluka kosepelisa bato ? Soki nazalaki nanu koluka kosepelisa bato, nalingaki kozala mosali ya Klisto te.


Boye bino nyonso bozali bana na Nzambe na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto ;


Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi ; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto.


Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe ; Epai ya basantu mpe bandimi ya Yesu-Klisto, oyo bazali kati na Efeso :


Yango wana, wuta tango nayokaki sango ya kondima na bino kati na Nkolo Yesu mpe bolingo na bino mpo na basantu nyonso,


Tika ete ngolu ezala na bato nyonso oyo balingaka Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na bolingo oyo ekoki kobeba te !


Kati na Nkolo Yesu, nazali na elikya ya kotindela bino Timote kala mingi te, mpo ete nalendisama na basango oyo akopesa ngai na tina na bino.


Bozala na posa ya kozalaka na bizaleli ya boye kati na bino ndenge mpe Yesu-Klisto azalaki na yango.


Nalingi koloba te ete nasili kozwa biloko oyo nyonso to mpe nasili kokoma moto ya kokoka, kasi nazali nde kopota mbangu mpo na kozwa yango, pamba te Yesu-Klisto asila mpe kozwa ngai.


Biso nde tozali bato oyo bakatisa ngenga na solo, pamba te tosambelaka Nzambe na nzela ya Molimo na Ye, tomikumisaka kati na Yesu-Klisto mpe totiaka elikya na biso na nzoto te,


Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene : koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto


Polo, Silasi mpe Timote ; Epai ya bandeko ya Lingomba ya Tesalonika, ba-oyo bazali kati na Nzambe Tata mpe kati na Nkolo Yesu-Klisto : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino !


Boyebi lisusu ete, sima na biso konyokwama mpe kofingama kati na Filipi, toteyaki bino, na lisungi ya Nzambe na biso mpe na molende nyonso, Sango Malamu na Ye kati na bitumba makasi.


Polo, Silasi mpe Timote ; Epai ya Lingomba ya bandeko ya Tesalonika, oyo ezali kati na Nzambe, Tata na biso, mpe kati na Nkolo Yesu-Klisto :


tango akoya na mokolo wana mpo na kopesamela nkembo kati na basantu na Ye, mpe lokumu kati na bandimi na Ye. Bino mpe bokozala elongo na bango, pamba te bondimaki mateya oyo toteyaki bino.


Epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo kati na kondima : Tika ete ngolu, mawa mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Nkolo na biso !


Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona. Basengeli kozala : bato oyo babongi na limemia, bato ya maloba mibale te, balangwi masanga te mpe bato oyo balukaka mbongo te na banzela ya mabe.


Ngai Polo, mowumbu ya Nzambe mpe ntoma ya Yesu-Klisto, mpo na kolendisa kondima ya baponami ya Nzambe mpe boyebi ya bosolo oyo ememaka na botosi kati na makambo ya Nzambe,


Lokola motambolisi misala ya Nzambe, mokambi ya Lingomba asengeli kozala moto azanga pamela. Yango wana, asengeli kozala moto na lolendo te, moto na kanda te, molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na lokoso ya mbongo te.


Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto, mpe Timote, ndeko na biso ; Epai ya Filemo, molingami na biso mpe moninga ya mosala ;


Boyeba ete ndeko na biso, Timote, asilaki kobima na boloko. Soki akoya noki, nakoya nzela moko na ye mpo na komona bino.


Ngai Jake, mosali na Nzambe mpe na Nkolo Yesu-Klisto ; Epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangana kati na biloko : Napesi bino mbote.


Pamba te bozalaki lokola bameme oyo ezali koyengayenga, kasi sik’oyo bozongi epai ya Mobateli bibwele oyo akengelaka bomoi na bino.


Ngai Simona Petelo, mosali mpe ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya bato oyo bazwaki kondima ya motuya moko na kondima na biso, na nzela ya bosembo ya Yesu-Klisto, Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso :


Ngai Jide, mowumbu ya Yesu-Klisto mpe ndeko ya Jake ; Epai ya bato oyo Nzambe abenga, ba-oyo Nzambe Tata alingaka, mpe ba-oyo babatelami mpo na Yesu-Klisto :


Emoniseli kowuta na Yesu-Klisto. Nzambe apesaki Ye yango mpo ete alakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli koya kala mingi te. Yesu-Klisto atindaki anjelu na Ye koyebisa emoniseli yango epai ya Yoane, mosali na Ye.


Tala mabombami oyo ezali kati na minzoto sambo oyo omonaki na loboko na Ngai ya mobali, mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo : minzoto sambo elakisi ba-anjelu ya Mangomba sambo ; mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo elakisi Mangomba sambo. »


Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe ! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. »


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Pergame : « Tala maloba ya Ye oyo asimbi mopanga bapelisa na bangambo nyonso mibale :


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Simirne : « Tala maloba ya Ye oyo azali Ya liboso mpe Ya suka, Ye oyo akufaki mpe azali lisusu na bomoi :


Kasi anjelu alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala, ya bandeko na yo, basakoli ; mpe ya ba-oyo nyonso babatelaka maloba ya buku oyo. Gumbamela nde Nzambe ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ