Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 9:9 - Mokanda na Bomoi

9 « Pamba te nakopesa mitindo mpe nakoningisa libota ya Isalaele kati na bikolo nyonso ndenge bayungolaka ble ; bongo ata mbuma moko te ya moke ekokweya na se.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 9:9
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, Yawe akotuta ble wuta na ngambo ya ebale (Efrate) kino na mayi oyo etiolaka makasi na bangomba ya Ejipito. Boye, bino bana ya Isalaele, Yawe akolokota bino moko na moko mpo na kosangisa bino.


Esengeli konika ble mpo na kosala mapa ; nzokande babetaka yango tango nyonso te, balekisaka nde bapine ya shar na likolo na yango mpe mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka, kasi banikaka yango te.


Pema na Ye ezali lokola ebale oyo etondi makasi, ebale oyo etondi kino na kingo. Akoyungola bikolo na kiyungulu ya pasi, akotia na mbanga ya bato ebende oyo batiaka na minoko ya bampunda mpo ete emema bango na libunga.


« Soki kaka bakoki solo kolongola malako oyo na miso na Ngai, » elobi Yawe, « wana bana ya Isalaele mpe bakozala lisusu ekolo te na miso na ngai. »


Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ; pamba te nazali elongo na yo, » elobi Yawe, « ata soki nabebisi bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino, nakobebisa yo nyonso te. Nakopamela yo solo, kasi nakosala yango na bosembo ; nakozanga te kopesa yo etumbu. »


Nakotindela Elami mipepe minei ya makasi, wuta na basonge minei ya lola, nakopanza bango na mokili mobimba mpe akozala na ekolo moko te oyo ekozanga koyamba bato ya Elami oyo bakokima.


Nakolongola kati na bino bato oyo batombokelaka Ngai mpe bato oyo batelemelaka Ngai. Bongo nakobimisa bango na mokili oyo bazali kovanda lokola bapaya ; kasi bakokota na mokili ya Isalaele te. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.


Napanzaki bango kati na bikolo, mpe bapalanganaki kati na mikili mosusu ; nasambisaki bango kolanda etamboli mpe misala na bango.


Boye, bakoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bango ; pamba te atako natindaki bango na bowumbu kati na bikolo, nasangisi bango lisusu na mabele na bango moko mpe nakotika ata moto moko te kati na bango kuna.


Yango wana, kati na bino, batata bakolia bana na bango, mpe bana bakolia batata na bango. Nakopesa bino etumbu mpe nakopanza bipai nyonso bato na bino nyonso oyo bakotikala na bomoi.


Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.


Nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya mpe nakobengana bino na mopanga ; mokili na bino ekozanga bato mpe bingumba na bino ekokawuka.


Simona, Simona, Satana asengi koyungola bino ndenge bayungolaka ble.


Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ