Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 9:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bino bana ya Isalaele, boni, bokokani te na bato ya mokili ya Kushi ? » elobi Yawe. « Boni, nabimisaki te Isalaele wuta na Ejipito, bato ya Filisitia wuta na Kreti, bato ya Siri wuta na Kiri ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 9:7
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi ya Asiri ayokaki ye, akendeki kobundisa Damasi mpe abotolaki yango. Amemaki bato ya Damasi na bowumbu na Kiri mpe abomaki Retsini.


Asa elongo na mampinga na ye balandaki bato ya Etiopi kino na Gerari. Bato bakufaki, bakokaki te kobikisa bomoi na bango, pamba te bango nyonso babebisamaki liboso ya Yawe mpe mampinga na Ye. Mampinga ya basoda ya Yuda bazwaki bomengo ebele ya bitumba ;


Asa abimelaki ye, mpe batandamaki na molongo ya bitumba na se ya Tsefata, pene ya Maresha.


Mpe na mokolo wana, Yawe abimisaki bana ya Isalaele na molongo, wuta na Ejipito, lokola mampinga ya basoda.


mokonzi ya Asiri akomema bakangami ya Ejipito mpe bawumbu ya Kushi bolumbu mpe makolo ngulu : ezala bilenge to bampaka, bakotambola bolumbu mpe makolo ngulu mpo na soni ya Ejipito.


Mampinga ya Elami batomboli makonga, mosusu bamati na bashar mpe bampunda ; Kiri abimisi nguba.


pamba te Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele, Mobikisi na yo. Nakabi Ejipito mpo na kofuta niongo ya lobiko na yo, Kushi mpe Seba na esika na yo.


Boni, moto mwindo akoki solo kobongola poso ya nzoto na ye ? Nkoyi ekoki kolongola penza matono ya poso ya nzoto na yango ? Bokokoka kosala malamu te, bino bato oyo bomesana kosala mabe.


Pamba te mokolo ekoki mpo na kobebisa bato nyonso ya Filisitia mpe kosilisa koboma batikali nyonso oyo bakoluka kosunga bingumba Tiri mpe Sidoni. Yawe akomi pene ya kobebisa bato ya Filisitia, batikali ya esanga ya Kafitori.


Jakobi akimaki na mokili ya Siri ; Isalaele asalaki mosala mpo na kozwa mwasi ; mpe mpo na kobala mwasi yango, andimaki kokoma mobateli bibwele.


Nakobuka ekuke ya Damasi, nakobebisa mokonzi ya bavandi ya Lubwaku ya Beti-Aveni, mpe oyo azali kokonza na Beti-Edeni ; mpe bato ya Siri bakokende na bowumbu na Kiri, » elobi Yawe.


Nabimisaki bino na Ejipito mpe natambolisaki bino mibu tuku minei kati na esobe mpo na kopesa bino mokili ya bato ya Amori.


Ezalaki mpe ndenge moko mpo na bato na Avi oyo bazalaki kovanda na mboka yango kino na Gaza. Bato ya Kafitori, oyo bawuta na mokili ya Kafitori, babomaki bato ya Avi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ