Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 9:5 - Mokanda na Bomoi

5 Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, asimbi mabele, mabele eninganaka, mpe bavandi na yango nyonso bakomaka na matanga, mokili mobimba etelemaka lokola ebale Nili mpe ekawukaka lokola mayi ya Ejipito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 9:5
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki atali mokili, mokili elengaka ; soki asimbi bangomba, ebimisaka milinga.


Yawe, fungola likolo mpe kita awa na mabele ! Yaka kosimba bangomba mpe sala ete ebimisa milinga !


Boye, tika ete bayengebene nyonso basambelaka Yo na tango ya malamu ! Soki mayi minene etomboki, bambonge na yango ekozwa bango te.


Nzambe azali kati na yango, ebukani te ; Nzambe asungaka yango wuta na tongo makasi.


Bangomba enyangwamaka lokola mafuta liboso ya Yawe, liboso ya Nkolo ya mokili mobimba.


Ndenge moto etumbaka matiti mpe etokisaka mayi na nzungu, kita mpo na kosala ete banguna na Yo bayeba Kombo na Yo mpe bikolo eningana liboso na Yo !


Kino tango nini mokili ekowumela na kolela mpe matiti ya bilanga nyonso ekowumela ya kokawuka ? Banyama mpe bandeke esili kokufa mpo ete bavandi ya mokili bazali mabe. Balobaka : « Yawe akoyeba te makambo oyo ekokomela biso. »


Mpo na yango, mokili ekokoma na mawa, bavandi na yango nyonso bakolemba nzoto, nyama ya zamba, ndeke ya likolo mpe mbisi ya ebale monene ekokufa.


Mpo na yango, mokili ekolenga, mpe bato na yango nyonso bakozala na matanga. Mokili mobimba ekotomboka lokola ebale Nili oyo etondi na mayi ; ekokoma koningana-ningana mpe ekokita lokola ebale ya Ejipito.


Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye, mpe bangomba mikuse epanzanaka. Mabele, mokili mpe bavandi na yango balengaka liboso na Ye.


Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.


Soki bangomba emoni Yo, elengaka ; mayi etiolaka makasi, ebale monene etombokaka mpe bambonge na yango emataka kino na likolo.


tango mvula ebetaki makasi, mayi eyaki elongo na mopepe makasi, emibwakaki na ndako yango ; ndako yango ekweyaki, mpe nyonso epanzanaki. »


Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ