Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 9:4 - Mokanda na Bomoi

4 Ezala banguna na bango bamemi bango na bowumbu, nakopesa mitindo na mopanga ete eboma bango kuna. Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosala bango mabe, kasi bolamu te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 9:4
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo olobaki na basali na yo : « Bomemela ngai ye mpo ete nakoka komona ye na miso na ngai. »


Pamba te Yawe atalaka mokili mobimba mpo na kosunga bato oyo mitema na bango emipesa mobimba epai na Ye. Nzokande, na likambo oyo, osali lokola moto oyo azangi mayele. Mpo na yango, kobanda lelo, okozalaka na bitumba tango nyonso.


kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.


Liboso ete tongo etana, Yawe atelemaki na likolo ya likonzi ya moto mpe ya lipata, atalaki mampinga ya bato ya Ejipito mpe akotisaki mobulu kati na yango.


Babebisi bakobimela na likolo ya bangomba nyonso ya esobe, pamba te mopanga ya Yawe ekoboma mokili mobimba ; moto moko te akozala na kimia.


Nazwaki mokano ya kosala engumba oyo mabe, kasi bolamu te, elobi Yawe ; nakokaba yango na maboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobebisa yango na moto. ›


Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosalela bango bolamu, mpe nakozongisa bango kati na mokili oyo. Nakobongisa bango lisusu, kasi nakobebisa bango lisusu te ; nakolona bango lokola nzete, nakopikola bango lisusu te.


« Kamata ye, batela ye, kosala ye mabe te ; kasi salela ye makambo nyonso oyo akosenga yo. »


— Kende koyebisa Ebedi-Meleki, moto ya Kushi : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakomi pene ya kokokisa makambo oyo nalakaki mpo na engumba oyo, makambo ya pasi kasi ya esengo te ; tango makambo yango ekokokisama, ekosalema na miso na yo.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nazwi mokano ya komemela bino pasi mpe ya kobebisa mokili nyonso ya Yuda.


Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.


Tango mikolo ya etumbu na yo ekosila, okotumba na moto kati na engumba ndambo moko kati na bandambo misato ; okokamata ndambo moko mosusu kati na bandambo misato, okobeta-beta yango na mopanga zingazinga ya engumba, mpe okopanza ndambo moko mosusu kati na bandambo misato na mopepe, mpe Ngai nakolanda bango na mopanga.


Nakobalukela mpe nakolongola kati na bato na ye, moto nyonso oyo akolia makila, azala moto ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na bango ;


Nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya mpe nakobengana bino na mopanga ; mokili na bino ekozanga bato mpe bingumba na bino ekokawuka.


Solo, miso ya Nkolo Yawe ezali kotala bokonzi ya masumu ; nakobebisa mpe nakolongola yango na mabele. Nzokande, nakobebisa te libota mobimba ya Jakobi, » elobi Yawe.


Pamba te, liboso ya tango wana, bato bazalaki kozwa lifuti ya malonga te na misala na bango, mpe banyama ezalaki kopesa ata litomba moko te ; moto moko te azalaki kokende na mosala na ye na kimia likolo ya kobanga banguna, pamba te nasalaki ete moto moko na moko atelemela moninga na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ