3 Soki babombami na songe ya ngomba Karimeli, nakokanga bango mpe nakokitisa bango na se ; soki babombami Ngai na se ya ebale monene, nakopesa mitindo na nyoka ete eswa bango kuna.
Na pokwa, bayokaki makelele ya matambe ya Yawe Nzambe kotambola kati na elanga. Boye, mobali mpe mwasi babombamaki kati na banzete ya elanga mpo na kokima Yawe.
Na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na Leviatani, nyoka oyo ekimaka, na Leviatani, nyoka ya somo, na nzela ya mopanga na Ye ya minu, mopanga na Ye ya monene mpe ya nguya ; akoboma elima ya ebale monene.
Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele ; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga.