Amosi 9:10 - Mokanda na Bomoi10 Bato nyonso ya masumu kati na bato na Ngai bakokufa na mopanga, ba-oyo nyonso balobaka : ‹ Pasi ekotikala te kozwa to kokomela biso ! › အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »
Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ? Pasi ekoki kokomela biso te ! »