Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 9:1 - Mokanda na Bomoi

1 Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki : « Buka makonzi ya Tempelo mpo ete ndako mobimba eningana mpe ekweyela bato nyonso na mito. Bato oyo bakotikala, nakoboma bango na mopanga. Moko te akokima, moko te akobika.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 9:1
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mishe alobaki : — Solo, boyoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai, namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.


Mpo na biso, Nzambe yango azali Nzambe oyo abikisaka ; mpe bikuke ya kufa ezali ya Nkolo Yawe.


Solo, Nzambe apanzaka mito ya banguna na Ye, oyo batambolaka kati na bomoi ya masumu, oyo mito na bango etonda na suki.


Bolobaki : ‹ Te, tokopota mbangu likolo ya mpunda ; › solo, bokokima nde ! Bolobaki : ‹ Tokopota mbangu na mpunda oyo eleki mbangu ; › solo, bato oyo bakolanda bino bakoleka bino na mbangu !


Na mobu oyo mokonzi Oziasi akufaki, namonaki Yawe avandi na Kiti moko ya bokonzi, etombwama makasi, bongo basonge ya nzambala na Ye etondisaki Tempelo.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela bango pasi ya makasi, mpe ata moto moko te akobika na yango. Ata soki bagangi epai na Ngai, nakoyoka bango te.


mopanga oyo bozali kobanga ekokweyela bino kuna, na Ejipito ; nzala oyo bozali kobanga ekolanda bino kuna, na Ejipito, mpe ezali kuna nde bokokufa.


« Moto nyonso oyo akokima somo akokweya na libulu, mpe moto nyonso oyo akobima na libulu akokangama na motambo, pamba te nakoyeisa mobu ya etumbu na mokili ya Moabi, » elobi Yawe.


Kongenga oyo ezingelaki yango ezalaki lokola monama na mapata na mokolo ya mvula ; elilingi yango ezalaki lokola nkembo na Yawe. Tango namonaki yango, nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nayokaki mongongo ya moto moko koloba na ngai.


Nkembo ya Yawe elongwaki na likolo ya basheribe mpe ekendeki na ekotelo ya Tempelo. Tempelo etondaki na lipata, mpe lopango na yango ya kati etondaki na kongenga ya Nkembo ya Yawe.


Nakotelemela bango penza ; ezala babimi na moto, moto mosusu ekotumba bango. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakopesa bango etumbu :


Namonaki bato motoba koya wuta na nzela ya Ekuke oyo ya likolo, oyo etala na ngambo ya nor ; moko na moko kati na bango asimbaki ebundeli oyo ebomaka na loboko na ye. Kati na bango, ezalaki na moto moko oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye. Bakotaki na kati mpe batelemaki pene ya etumbelo ya bronze.


« Na mokolo oyo nakopesa Isalaele etumbu mpo na masumu na ye, nakobebisa bitumbelo ya Beteli, nakobuka maseke ya bitumbelo, mpe ekokweya na mabele.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : « Mwasi na yo akosala kindumba kati na engumba, bana na yo ya mibali mpe ya basi bakokufa na mopanga, bakokabola mabele na yo na biteni. Yo moko, okokufa na mabele ya mbindo, mpe Isalaele akokende solo na bowumbu, mosika ya mokili na ye ya mbotama. »


Tango nakotelemela libota ya Jeroboami na nzela ya mopanga na Ngai, nakobebisa bisambelo ya likolo ya bangomba ya Izaki mpe bisika ya bule ya Isalaele.


Obimaka mpo na kokangola bato na Yo mpe mpo na kobikisa mopakolami na Yo. Obomaki mokambi ya mokili ya bato mabe, osambwisaki ye kobanda na moto kino na makolo.


Na tango wana, nakoluka engumba Yelusalemi na nzela ya mwinda, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bamimonaka ete bakoka mpe bamilobelaka : ‹ Yawe asalaka na Ye eloko te, ezala ya malamu to ya mabe. ›


Ekokoma esika oyo bitonga mpe banyama ya ndenge na ndenge ekokoma kolala. Esulungutu mpe kombekombe ekokoma kolekisa butu na yango na basonge ya bandako na yango. Kolela na yango ekoyokana kino na maninisa, libebi na libebi nde ekomonana na bikotelo ya bandako, mpe mabaya ya banzete ya sedele ekotikala polele.


Moto moko te amona Nzambe, kasi ezali kaka Mwana se moko oyo azali Nzambe mpe azali moko na Tata nde atalisaki biso Ye.


Bongo Yoane apesaki litatoli oyo : — Namonaki Molimo kokita wuta na likolo lokola ebenga mpe kovanda likolo na Ye.


Mokonzi, na ngonga ya midi, wana nazalaki kokende, namonaki pole moko kowuta na likolo, elekaki kutu ata kongenga ya moyi ; pole yango ezipaki ngai mpe bato oyo bazalaki kotambola elongo na ngai.


Jozue alobaki : « Bopusa mabanga minene na ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe botia bato pene na yango mpo na kobatela yango.


Tango namonaki Ye, nakweyaki na makolo na Ye lokola moto akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na Ye ya mobali mpe alobaki na ngai : « Kobanga te ! Nazali Ya liboso mpe Ya suka.


Anjelu mosusu ayaki mpe atelemaki na etumbelo ; amemaki mbabola basala na wolo mpo na kotumba na yango ansa. Bapesaki ye ansa ebele ya kobonza elongo na mabondeli ya basantu nyonso, mpo ete abonza yango na likolo ya etumbelo basala na wolo, liboso ya Kiti ya Bokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ