Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Amosi 8:9 - Mokanda na Bomoi

9 Na mokolo wana, » elobi Nkolo Yawe, « nakosala ete moyi elala na midi, mpe nakoyeisa molili na mokili na moyi makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Amosi 8:9
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molili eyelaka bango na moyi ; na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.


Minzoto na likolo mpe minda nyonso oyo ezali pene na yango ekopesa lisusu pole na yango te : moyi ekokoma molili tango tongo ekotana, mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.


Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino, liboso ete amemela bino molili, liboso ete makolo na bino ebeta mabaku na bangomba oyo ezipami na molili. Bino bozali kozela pole, kasi Ye akobongola yango molili makasi.


Mama ya bana sambo akolemba nzoto mpe akopema na pasi makasi. Moyi na ye ekolala wana mokolo ezali nanu kowumela : akoyokisama soni mpe akosambwa. Nakoboma na mopanga, bato oyo bakotikala na bomoi liboso ya banguna na bango, » elobi Yawe.


Tango nakoboma yo ndenge babomaka mwinda, nakozipa likolo, nakokomisa molili minzoto na yango ; nakozipa moyi na mapata, mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.


Pamba te Ye oyo asalaki bangomba, oyo akelaki mipepe, oyo alakisaka makanisi na Ye epai na moto, oyo abongolaka pole molili, oyo atambolaka likolo ya bangomba ya mokili, Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.


boluka Ye oyo akela lisanga ya minzoto, oyo abongolaka molili pole mpe akomisaka moyi butu, oyo abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mokili ; Kombo na Ye ezali : Yawe.


Na butu, bokozwa lisusu bimoniseli te. Soki bapesi bango te eloko ya kolia, molili ekozingela bino mpe bokokoka lisusu kosakola te ! Moyi ekobimela lisusu basakoli yango te, mpe mokolo ekokoma molili mpo na bango.


Ekozala mokolo ya ndenge mosusu, mokolo ezanga moyi mpe butu, mokolo oyo Ye moko kaka Yawe ayebi ; pole ekobima soki pokwa ekoki.


Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya longwa na likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »


Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.


Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.


Na ngonga pene ya midi, molili ekotaki na mokili mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa,


Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya motoba, mpe mabele eninganaki makasi. Moyi ekomaki molili lokola elamba ya mwindo ; bongo sanza, na mobimba na yango, ekomaki motane lokola makila.


Anjelu ya minei abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, eteni moko kati na biteni misato ya moyi, ya sanza mpe ya minzoto ebebaki. Na bongo, eteni moko kati na biteni misato ya kongenga na yango ekomaki molili. Boye eteni moko kati na biteni misato ya mokolo mpe ya butu ezangaki pole.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ