« Masumu ya Yuda ezali lokola makomi oyo bakoma na ekomeli ya ebende oyo ezali na songe ya diama ; bakoma yango na bitando ya mitema na bango mpe na maseke ya bitumbelo na bango.
Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba : ‹ Yeba Yawe ! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »
— Boni, bokanisi ete Yawe abosani mpe azali kokanisa lisusu te malasi ya ansa oyo botumbaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, bino, batata na bino, bakonzi na bino, bakalaka na bino mpe bato nyonso ya mokili ?
Bamilobelaka te, kati na mitema na bango, ete Ngai nabosanaka te mabe nyonso oyo basalaka ; sik’oyo, misala na bango ya mabe ezingeli bango, ezali tango nyonso liboso na Ngai.
Nkolo Yawe alapi ndayi na Kombo na Ye moko ; Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nazali na somo ya lolendo ya Jakobi, nayini bandako na ye, oyo batonga makasi ; nakokaba engumba elongo na biloko na yango nyonso. »