Nalobaki na bango : — Biso, kolanda makoki na biso, tosikolaki bandeko na biso, Bayuda, oyo batekamaki epai ya bapagano. Kasi bino sik’oyo, bozali bino moko koteka bandeko na bino, mpe bozali koteka bango kaka epai ya bato ya ekolo na biso ! Bavandaki kimia mpe bazangaki liloba ya kozongisa.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Isalaele, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te batekaki bato ya sembo mpo na kozwa kaka palata, mpe bato bakelela mpo na kozwa kaka mapapa mibale.
Bosakola makambo oyo kati na bandako ya Asidodi mpe ya Ejipito : ‹ Bosangana na likolo ya bangomba ya Samari mpe botala ndenge nini mobulu mpe minyoko ezali kosalema kati na yango !
Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo ; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino : « Bomemela biso masanga mpo tomela. »