Amosi 8:5 - Mokanda na Bomoi5 Bozali koloba : « Feti ya ebandeli ya sanza ekoleka tango nini mpo ete toteka ble na biso ? Tango nini mokolo ya Saba ekosila mpo ete tofungola bibombelo na biso ya ble ? » Tokosalela bakopo ya mike mpo ete tomatisa talo, mpe tokosalela bimekelo ya lokuta. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Soki obateli matambe na yo ete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba, mpe ete osala te mosala oyo yo olingi na mokolo na Ngai ya bule ; soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yo mpe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe ; soki opesi yango lokumu na koboya kolanda nzela na yo moko, kosala misala na yo moko mpe kokoba na makambo oyo ezanga tina,
Bozali koloba lisusu : ‹ Mokumba nini lisusu oyo ! › Bozali mpe kotiola Ngai lisusu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Tango bozali komema bibwele oyo ezoka, oyo etambolaka tengu-tengu to oyo ezali na bokono, mpe bozali kobonza yango lokola mbeka, boni, nandima yango na maboko na bino ? » elobi Yawe.